Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/8 nk. 18-22
  • “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini tokoki kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe?
  • Likabo kitoko oyo Yehova apesá biso
  • Kolinga bato oyo Yehova alingaka
  • Kotosa bokonzi
  • Kotikala pɛto na miso ya Yehova
  • “Bolingo ya Nzambe elakisi boye”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Bolingo ya Nzambe eumelaka seko
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Tikalá na kati ya bolingo ya Nzambe
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/8 nk. 18-22

“Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”

“Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe, wana bozali kozela motema mawa ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpo na bomoi ya seko.”​—YUDA 21.

1, 2. Ndenge nini Yehova amonisi bolingo na ye mpo na biso, mpe ndenge nini toyebi ete Yehova akokoba te kolinga biso soki toponi kosala oyo tolingi?

YEHOVA NZAMBE amoniselá biso bolingo na ye na ndenge mingi. Nzokande, likambo eleki monene oyo emonisaka bolingo ya Yehova ezali mbeka ya lisiko oyo apesaki mpo na biso. Bolingo na ye mpo na bato ezali mpenza monene na boye ete atindaki Mwana na ye ya bolingo awa na mabelé akufa mpo na biso. (Yoa. 3:16) Yehova asalaki yango mpo alingi ete tózala na bomoi ya seko, mpe ete bolingo na ye mpo na biso ezala libela na libela!

2 Kasi, tondimi mpenza ete Yehova akokoba kolinga biso ata soki toponi kosala nini na bomoi na biso? Te. Mpamba te Yuda 21 elendisi biso boye: “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe, wana bozali kozela motema mawa ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpo na bomoi ya seko.” Maloba “bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe” emonisi ete ezali na makambo oyo tosengeli kosala. Na yango, tosengeli kosala nini mpo tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe?

Ndenge nini tokoki kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe?

3. Likambo nini Yesu alobaki ete ezali na ntina mpo atikala na kati ya bolingo ya Tata na ye?

3 Eyano na motuna yango ezali na maloba ya Yesu na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé. Alobaki boye: “Soki botosi bakomandema na ngai, bokokoba kozala na kati ya bolingo na ngai, ndenge ngai mpe nazali kotosa bakomandema ya Tata mpe nakobi kozala na kati ya bolingo na ye.” (Yoa. 15:10) Tomoni polele ete Yesu ayebaki ete mpo azala na boyokani malamu na Yehova, Tata na ye ya likoló, asengelaki kotosa bakomandema na ye. Soki Mwana ya Nzambe oyo azalaki moto ya kokoka asengelaki kosala bongo, biso mpe tosengeli kosala bongo te?

4, 5. (a) Wapi lolenge ya libosoliboso oyo tokoki komonisa ete tolingi Yehova? (b) Mpo na nini tozali na ntina moko te ya koboya kotosa bakomandema ya Yehova?

4 Libosoliboso, tomonisaka ete tolingaka Yehova soki tozali kotosa ye. Ntoma Yoane amonisaki yango na maloba oyo: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye; kutu bakomandema na ye ezali kilo te.” (1 Yoa. 5:3) Ya solo, lelo oyo bato mingi basepelaka te na likanisi ya kotosa. Kasi, tótya likebi na maloba oyo: “Kutu bakomandema na ye ezali kilo te.” Yehova asɛngaka biso te tósala makambo oyo eleki biso makasi.

5 Tópesa ndakisa: Okoki nde kosɛnga moninga na yo ya motema amema eloko moko oyo oyebi malamu ete eleki kilo mpo na ye? Te! Yehova azali na boboto koleka biso nyonso mpe ayebi bolɛmbu na biso malamu koleka. Biblia elobi ete Yehova ‘abosanaka te ete tozali bobele putulu.’ (Nz. 103:14) Akosɛnga biso ata mokolo moko te tósala likambo oyo eleki biso. Yango wana, tosengeli te koboya likanisi ya kotosa bakomandema ya Yehova. Kasi, tosengeli nde komona ete kotosa Nzambe ezali libaku kitoko ya komonisa Tata na biso ya likoló ete tolingaka ye mpenza mpe ete tolingi kotikala na kati ya bolingo na ye.

Likabo kitoko oyo Yehova apesá biso

6, 7. (a) Lisosoli ezali nini? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge lisosoli ekoki kosalisa biso tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.

6 Na mokili oyo ezali na makambo ndenge na ndenge, bikateli mingi oyo tosengeli kozwa etalelaka botosi na biso epai ya Nzambe. Ndenge nini tokoki koyeba ete bikateli yango eyokani mpenza na mokano ya Nzambe? Yehova apesá biso likabo moko oyo ekoki kosalisa biso mingi na likambo etali botosi. Likabo yango ezali lisosoli. Lisosoli ezali nini? Ezali likoki oyo esalisaka biso tómiyeba. Esalaka lokola mosambisi na kati na biso, esalisaka biso tótalela makambo nini ebongi tópona na bomoi na biso to tókanisa makambo oyo tosali mpo na koyeba soki ezali malamu to mabe.​—Tángá Baloma 2:14, 15.

7 Ndenge nini tokoki kosalela malamu lisosoli na biso? Tózwa ndakisa moko. Moto moko azali kotambola na esobe moko monene. Banzela ezali te, babalabala te, bilembo oyo elakisaka nzela mpe te. Atako bongo, azali kokoba mobembo na ye tii esika azali kokende. Ndenge nini? Azali na mwa eloko moke oyo babengaka boussole. Boussole ezali lokola montre, kasi yango ezali na bilembo oyo emonisaka ɛsti, wɛsti, nɔrdi mpe sudi; ezalaka na likɔnga oyo ezali na aimant, oyo elakisaka ntango nyonso na nɔrdi. Soki moto yango azali na boussole te, akobunga nzela. Ndenge moko mpe, soki moto azali na lisosoli te akoyeba te kozwa bikateli ya malamu na oyo etali etamboli mpe makambo mosusu ya bomoi.

8, 9. (a) Likambo nini tosengeli kobosana te na ntina na lisosoli? (b) Tokoki kosala nini mpo lisosoli na biso esalisaka biso mpenza?

8 Kasi, ndenge moko na boussole, lisosoli ezali na makoki nyonso te. Soki moto wana atye aimant pembeni ya boussole, likɔnga na yango ekolakisa ngámbo mosusu na esika elakisa ngámbo ya nɔrdi. Ndenge moko mpe, soki totiki ete bamposa ya motema na biso etambwisa biso, nini ekosalema? Bamposa na biso ya moimi ekoki kobebisa lisosoli na biso. Biblia ekebisi biso ete “motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” (Yil. 17:9; Mas. 4:23) Longola yango, soki moto oyo azali kotambola na esobe azali na karte ya malamu te ya mokili wana, boussole na ye ekosalisa ye mpenza te to ekozala na ntina te. Ndenge moko mpe, soki tozali kolanda te litambwisi ya malamu mingi oyo euti na Biblia, Liloba ya Nzambe, mbala mosusu lisosoli na biso ekozala mpenza na ntina te. (Nz. 119:105) Likambo ya mawa, bato mingi na mokili bazali kotika ete bamposa ya motema na bango etambwisa bango mpe bazali kotya likebi mingi te na mitinda ya Liloba ya Nzambe to mpe bazali koboya kotosa yango. (Tángá Baefese 4:17-19.) Yango wana bato mingi, atako Nzambe apesá bango lisosoli, bazali kosala makambo ya mabe mpenza.​—1 Tim. 4:2.

9 Tosengeli kozwa ekateli makasi ya komekola bango te! Kasi, tótika nde Liloba ya Nzambe eteya mpe ebongisa lisosoli na biso mpo ekoka kosalisa biso mpenza. Tosengeli koyokelaka lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia na esika ya kotika bamposa na biso ya mabe etambwisa yango. Longola yango, tosengeli mpe kosala nyonso mpo na komemya lisosoli ya bandeko na biso baklisto. Tósalaka makasi mpo na kobɛtisa bango libaku te; tóbosana te ete bandeko mosusu bakoki kozala na lisosoli oyo ezokaka noki.​—1 Kol. 8:12; 2 Kol. 4:2; 1 Pet. 3:16.

10. Wapi makambo misato oyo tokotalela sikoyo?

10 Tótala sikoyo makambo misato oyo tokoki kosala mpo na komonisa bolingo na biso mpo na Yehova. Na mokomoko na yango, lisosoli na biso esengeli kosala, kasi esengeli kotambwisama libosoliboso na mitinda ya Biblia oyo euti na Nzambe. Makambo yango misato oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete tolingi Yehova mpe tozali kotosa ye, yango oyo: (1) Kolinga bato oyo Yehova alingaka, (2) Kotosa bokonzi, mpe (3) Kosala makasi mpo na kotikala pɛto na miso ya Nzambe.

Kolinga bato oyo Yehova alingaka

11. Mpo na nini tosengeli kolinga bato oyo Yehova alingaka?

11 Ya liboso, tosengeli kolinga bato oyo Yehova alingaka. Na oyo etali boninga, bato bazali lokola éponge. Ndenge kaka éponge emɛlaka mai, biso mpe tolandaka makambo oyo tozali komona zingazinga na biso. Mozalisi na biso ayebi malamu likama mpe bolamu oyo boninga ekoki komemela biso bato ya kozanga kokoka. Yango wana, apesi biso toli oyo: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” (Mas. 13:20; 1 Kol. 15:33) Moto moko te kati na biso akolinga ‘kosuka mabe.’ Biso nyonso tolingaka ‘kokóma na bwanya.’ Moto moko te akoki kokómisa Yehova bwanya koleka oyo azali na yango mpe moto moko te akoki kobebisa ye. Atako bongo, apesi biso ndakisa malamu na likambo etali kopona baninga. Kanisá naino, na kati ya bato ya kozanga kokoka, banani Yehova aponaka mpo bázala baninga na ye?

12. Baninga ya ndenge nini Yehova aponaka?

12 Yehova abengaki Abalayama “moninga na ngai.” (Yis. 41:8) Abalayama azalaki moto ya kondima: azalaki moto ya sembo, azalaki moyengebene mpe moto ya botosi. (Yak. 2:21-23) Yehova aponaka nde bato ya ndenge wana lokola baninga. Aponaka mpe bato ya ndenge wana baninga ata lelo oyo. Soki Yehova aponaka baninga ya ndenge wana, esengeli te biso mpe tóponaka baninga ya malamu, elingi koloba tótambolaka na bato ya bwanya mpo tókóma na bwanya?

13. Ntango tolingi kopona baninga, nini ekoki kosalisa biso tópona baninga ya malamu?

13 Nini ekoki kosalisa yo opona baninga ya malamu? Koyekola bandakisa oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa. Talelá boninga ya Luta ná bokilo na ye Naomi, boninga ya Davidi ná Yonatana, to mpe boninga ya Timote ná Paulo. (Luta 1:16, 17; 1 Sam. 23:16-18; Filp. 2:19-22) Bazalaki baninga makasi mpo na ntina moko oyo eleki nyonso: Bazalaki na bolingo ya solosolo mpo na Yehova. Okoki kozwa baninga oyo balingaka mpenza Yehova ndenge yo olingaka ye? Yebá ete okoki kozwa baninga ya ndenge wana na lisangá ya boklisto. Baninga ya ndenge wana bakosala te ete osuka mabe na elimo. Kasi, bakosalisa yo nde otosa Yehova, okola na elimo, mpe olona mpo na elimo. (Tángá Bagalatia 6:7, 8.) Bakosalisa yo otikala na kati ya bolingo ya Nzambe.

Kotosa bokonzi

14. Mpo na nini ezalaka ntango mosusu mpasi mpo tótosa bokonzi?

14 Lolenge ya mibale oyo tomonisaka ete tolingaka Yehova etaleli bokonzi. Tosengeli kotosa bokonzi. Mpo na nini ezalaka ntango mosusu mpasi kosala yango? Ntina moko ezali ete bato oyo bazali na bokonzi bazali bato ya kozanga kokoka. Longola yango, biso moko mpe tozali bato ya kozanga kokoka. Tobundaka na elimo ya botomboki oyo tobotamá na yango.

15, 16. (a) Mpo na nini ezali na ntina ete tótosaka baoyo Yehova apesi mokumba ya kobatela basaleli na ye? (b) Liteya nini ya ntina mingi tozwi na ndenge oyo Yehova atalelaki botomboki ya Bayisalaele epai ya Moize?

15 Na yango, okoki komituna boye, ‘Soki kotosa bokonzi ezali mpasi, mpo na nini tosengeli kosala yango?’ Eyano na motuna yango etaleli ntembe oyo ebimaki na ntina na boyangeli. Nani okopona ete azala moyangeli to mokonzi na yo? Soki toponi Yehova azala Moyangeli na biso, tosengeli kotosa bokonzi na ye. Soki tozali kotosa te, tokoki mpenza koloba ete azali Moyangeli na biso? Longola yango, mbala mingi Yehova amonisaka bokonzi na ye na nzela ya bato ya kozanga kokoka, oyo apesi mokumba ya kobatela basaleli na ye. Soki totombokeli bato yango, ndenge nini Yehova akomona makambo oyo tozali kosala?​—Tángá 1 Batesaloniki 5:12, 13.

16 Na ndakisa, ntango Bayisalaele baimaimaki mpe batombokelaki Moize, Yehova amonaki ete batombokelaki nde ye moko. (Mit. 14:26, 27) Nzambe abongwani te. Soki tomeki kotombokela bato oyo Yehova apesi bokonzi, ekomonana ete totombokeli nde ye!

17. Makanisi nini ya malamu tosengeli koluka kozala na yango mpo na baoyo bazali na mikumba na lisangá?

17 Ntoma Paulo amonisi ndenge ya malamu oyo tosengeli kotalela bandeko oyo bazali na mikumba na lisangá ya boklisto. Akomaki boye: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bóyokelaka bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ; mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo yango ekozala likama mpo na bino.” (Ebe. 13:17) Ya solo, esɛngaka milende mpo na kolona elimo ya botosi ndenge wana. Kasi, tóbosana te ete tozali koluka kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe. Ebongi tósala nyonso mpo na kokokisa mokano yango, boye te?

Kotikala pɛto na miso ya Yehova

18. Mpo na nini Yehova alingi tótikala pɛto?

18 Likambo ya misato oyo tomonisaka ete tolingi Yehova ezali ete tosalaka makasi tótikala pɛto na miso na ye. Mbala mingi baboti basalaka makasi mpo bana na bango bázala pɛto. Mpo na nini? Ntina moko ezali ete bopɛto ezalaka na ntina mpo mwana azala malamu mpe nzoto kolɔngɔnɔ. Lisusu, mwana oyo azali pɛto apesaka libota lokumu, amonisaka ete baboti na ye balingaka ye mpe batyelaka ye likebi. Yehova mpe alingi tózala pɛto mpo na bantina ya ndenge wana. Ayebi ete bopɛto ezali na ntina mingi mpo na bolamu na biso. Ayebi mpe ete bopɛto na biso ekumisaka ye, Tata na biso ya likoló. Yango ezali na ntina mingi mpo ekoki kosalisa bato mosusu bápusana penepene na Nzambe oyo tosambelaka mpo bamoni ete tokeseni na bato ya mokili oyo ya mbindo.

19. Ndenge nini toyebi ete bopɛto ya nzoto ezali na ntina?

19 Na makambo nini tosengeli kotikala pɛto? Na makambo nyonso mpenza. Na Yisalaele ya kala, Yehova amonisaki basaleli na ye polele ete bopɛto ya nzoto ezali na ntina mingi. (Lev. 15:31) Mibeko ya Moize elobelaki makambo lokola kolongola bosɔtɔ, kosukola basaani, kosukola mabɔkɔ, makolo, mpe bilamba. (Ex. 30:17-21; Lev. 11:32; Mit. 19:17-20; Det. 23:13, 14) Bazalaki mbala na mbala koyebisa Bayisalaele ete Yehova, Nzambe na bango, azali mosantu​—elingi koloba “pɛto” mpe “bulɛɛ.” Basaleli ya Nzambe oyo azali mosantu basengeli mpe kozala basantu.​—Tángá Levitike 11:44, 45.

20. Na makambo nini tosengeli kotikala pɛto?

20 Na yango, tosengeli kozala pɛto libándá mpe na kati. Tosalaka makasi mpo makanisi na biso etikala pɛto. Totosaka mitinda nyonso ya Yehova oyo etali etamboli ya pɛto, atako mokili ezali se kobeba na oyo etali pite mpe ekobo. Oyo eleki nyonso, tozali kobɛta nsɛtɛ na likambo etali kobatela losambo na biso pɛto, tozali koboya kosangana na losambo ya lokuta. Tobosanaka te likebisi oyo ezali na Yisaya 52:11: “Bólongwa! Bólongwa! Bókima na esika yango, [bósimba] eloko ya mbindo te; bóbima na kati na ye, bómibulisa bino mpenza.” Lelo oyo, tokotikala pɛto na elimo soki tozali koboya ata kosimba eloko nyonso oyo Yehova amonaka ete ezali na boyokani na losambo ya lokuta. Yango wana, na ndakisa, toboyaka kosangana na milulu ya mangomba ya lokuta mpe na bafɛti oyo bato mingi ya mokili basalaka. Ya solo, kotikala pɛto ezali etumba monene. Kasi, basaleli ya Yehova basalaka makasi ya kosala bongo mpo yango esalisaka bango bátikala na kati ya bolingo ya Nzambe.

21. Ndenge nini tokoki koyeba soki tokotikala na kati ya bolingo ya Nzambe?

21 Yehova alingi ete tótikala na kati ya bolingo na ye libela na libela. Kasi mokomoko na biso asengeli kotala soki azali kosala nyonso mpo na kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe. Tokoki kosala yango soki tozali kolanda ndakisa ya Yesu mpe tozali komonisa bolingo na biso mpo na Yehova na kotosa mibeko na Ye. Soki tosali bongo, tóyeba ete eloko moko “ekokoka te kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali na kati ya Klisto Yesu Nkolo na biso.”​—Lom. 8:38, 39.

Ozali koyeba lisusu?

• Ndenge nini lisosoli na biso ekoki kosalisa biso tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe?

• Mpo na nini tosengeli kolinga baoyo Yehova alingaka?

• Mpo na nini kotosa bokonzi ezali na ntina?

• Bopɛto ezali na ntina nini mpo na basaleli ya Nzambe?

[Etanda/​Elilingi na lokasa 20]

Buku Oyo Elendisi Etamboli Ya Malamu

Na mayangani ya etúká oyo esalemaki na mobu 2008, buku moko ya nkasa 224 oyo ezali na motó ya likambo “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe” ebimaki. Ntina ya buku yango ya sika ezali nini? Ebongisami mpo na kosalisa baklisto báyeba mitinda ya Yehova mpe bálinga yango; elobeli mingimingi etamboli ya moklisto. Koyekola malamumalamu buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe” ekosalisa biso tómona mpenza ete kotosa mitinda ya Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu lelo mpe ezali komema na bomoi ya seko na mikolo ezali koya.

Longola yango, buku yango ebongisami mpo na kosalisa biso tómona ete kotosa Yehova ezali kilo te. Kasi, ezali nde lolenge ya komonisa Yehova ete tolingaka ye mingi. Na yango, buku yango ekotinda biso tómituna boye, ‘Mpo na nini natosaka Yehova?’

Ntango bato mosusu basalaka libunga ya kotika kolinga Yehova, mbala mingi ezalaka mpo bakómi na etamboli ya mabe, kasi te mpo bakangi ntina te ya liteya moko ya boklisto. Yango wana, ezali mpenza na ntina tókolisa bolingo na biso mpo na mibeko mpe mitinda ya Yehova mpe tósepelaka na yango mingi mpo ezali kotambwisa biso mokolo na mokolo! Tozali mpenza kolikya ete buku yango ya sika ekosalisa bampate ya Yehova na mokili mobimba bákangama na oyo ezali malamu, bámonisa ete Satana azali mokosi mpe koleka nyonso, bátikala na kati ya bolingo ya Nzambe!​—Yuda 21.

[Elilingi na lokasa 18]

“Soki botosi bakomandema na ngai, bokokoba kozala na kati ya bolingo na ngai, ndenge ngai mpe nazali kotosa bakomandema ya Tata mpe nakobi kozala na kati ya bolingo na ye”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto