Obungisá mikumba na yo? Okoki kozongela yango?
KALA ozalaki na mikumba na lisangá? Mbala mosusu ozalaki mosaleli na misala to nkulutu. Mbala mosusu mpe ozalaki na lolenge moko ya mosala ya ntango nyonso. Na ntembe te ozalaki na esengo mingi mpe ozalaki kosepela na mikumba na yo, kasi na nsima, likambo moko esɛngaki otika mikumba yango.
Mbala mosusu otikaki mikumba na yo mpo na kosunga bato ya libota na yo. Ekoki mpe kozala mpo na bobange to mpo na maladi. Kozwa bikateli ya ndenge wana elimboli te ete okoki makambo te. (1 Tim 5:8) Na ekeke ya liboso, Filipo azalaki misionɛrɛ, kasi na nsima akendaki kofanda na Kaisalia mpo na kobatela libota na ye. (Mis. 21:8, 9) Ntango Davidi, mokonzi ya Yisalaele, akómaki mobange, azwaki bibongiseli mpo mwana na ye Salomo akóma mokonzi na esika na ye. (1 Mik. 1:1, 32-35) Atako bongo, Yehova akobaki kolinga mpe kosepela na Filipo ná Davidi, mpe tii lelo tomemyaka bato yango.
Kasi, mbala mosusu balongolaki yo mikumba nde kolongola. Ezalaki mpo osalaki likambo ya mabe? To mpo na mikakatano ya libota? (1 Tim. 3:2, 4, 10, 12) Okoki kutu komona ete balongolaki yo mikumba kaka mpamba, mpe okoki kozala na nkanda na motema tii lelo oyo.
Okoki kokokisa masɛngami mpo ozongela mikumba
Soki moto abungisi mikumba akoki kozongela yango lisusu te? Ezalaka ntango nyonso bongo te. Nzokande, mpo ozongela mikumba, osengeli kolinga kokokisa masɛngami. (1 Tim. 3:1) Kasi mpo na nini kolinga kosala yango? Kaka mpo na ntina oyo omipesaki na Nzambe—bolingo mpo na Yehova mpe mpo na bato oyo basalelaka ye. Soki ondimi komonisa bolingo yango mpe ozongeli mikumba, ekopesa Yehova nzela ya kosalela mayele oyo ozwaki ntango ozalaki na mikumba mpe oyo ozwi nsima ya kobungisa yango.
Kanisá likambo oyo Yehova ayebisaki ekólo Yisalaele ntango babungisaki mikumba na bango mpo na mabe oyo basalaki. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Ngai [Yehova] nakobongwana te; bongo bino bana ya Yakobo bobomami te.” (Mki. 3:6) Yehova alingaki Bayisalaele mpe asepelaki kosalela bango lisusu. Yehova akolinga mpe kosalela yo lisusu. Okoki kosala nini sikoyo? Kosala mpo na matomba ya Bokonzi esɛngaka mingimingi moto azala na boyokani malamu na Nzambe, kasi makoki na ye moko te. Na yango, lokola ozali lisusu na mikumba mingi te na lisangá, luká obongisa boyokani na yo na Nzambe.
Mpo na ‘kozala makasi’ na kati ya kondima, osengeli ‘koluka Yehova mpe nguya na ye.’ (1 Kol. 16:13; Nz. 105:4) Lolenge moko ya kosala yango ezali kobondela. Ntango ozali koyebisa Yehova mokakatano na yo, yebisá ye ndenge ozali komiyoka mpe sɛngá ye elimo na ye. Soki osali bongo, okopusana penepene na Yehova, mpe yango ekopesa yo makasi. (Nz. 62:8; Filp. 4:6, 13) Lolenge mosusu oyo okoki kokolisa boyokani na yo na Nzambe ezali kobongisa ndenge na yo ya koyekola Liloba ya Nzambe. Lokola sikoyo ozali na mikumba mingi te, okoki kobanda kolekisa ntango mingi na boyekoli na yo moko mpe na boyekoli ya libota; mbala mosusu kosala bongo ezali kozongela mimeseno ekómaki mpasi.
Ya solo, ozali naino momonisi ya Yehova, Motatoli na ye. (Yis. 43:10-12) Mokumba ya malamu koleka oyo mokomoko na biso azali na yango ezali ya “kosala elongo na Nzambe.” (1 Kol. 3:9) Kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola ezali lolenge oyo eleki malamu ya kolendisa elimo na yo mpe ya baninga na yo na mosala ya kosakola.
Yekolá kozala na makanisi ya malamu
Soki obungisi mikumba, okoki koyoka nsɔni to mpasi na motema. Okoki kobanda koluka komilongisa. Bongo soki bandeko oyo bazali na mikumba bayokaki yo, kasi bamonaki ete osengeli kotika mokumba moko boye? Okoki kokóma na makanisi ya mabe mpo na bandeko yango mpe yango ekoki kopekisa yo okokisa lisusu masɛngami to mpe ekoki kozala mpasi mpo ozwa liteya na mabunga na yo. Tótala ndenge makambo oyo ekómelaki Yobo, Manase, mpe Yozefe ekoki kosalisa moto alonga makanisi ya mabe.
Yobo azalaki kobondela Yehova mpo na basusu mpe azalaki nkumu mpe mosambisi na mboka oyo batata ya mabota nde bazalaki kotambwisa makambo. (Yobo 1:5; 29:7-17, 21-25) Na nsima, na eleko moko oyo akómaki na bozwi mingi, Yobo abungisaki bomɛngo na ye, bana na ye bakufaki, mpe ye moko abɛlaki makasi. Mpo na nyonso wana, abungisaki lokumu na ye na miso ya bato. Yobo alobaki boye: “Basɛki ngai, baoyo bakokani na ngai na [mbula] te.”—Yobo 30:1.
Yobo amonaki ete asali eloko te mpe alingaki kosamba liboso ya Nzambe. (Yobo 13:15) Atako bongo, Yobo andimaki kozela Yehova, mpe yango ebotaki mbuma ya malamu. Andimaki ete esengeli básembola ye, mingimingi mpo na makambo oyo azalaki koloba ntango amekamaki. (Yobo 40:6-8; 42:3, 6) Lokola Yobo azalaki na komikitisa, nsukansuka Nzambe apambolaki ye mingi koleka.—Yobo 42:10-13.
Soki balongolaki yo mikumba mpo osalaki likambo moko ya mabe, okoki komituna soki Yehova mpe bandeko ya lisangá bakolimbisa yo mpenza mpe bakobosana likambo oyo osalaki. Boye, kanisá ndakisa ya Manase, mokonzi ya Yuda. “Asalaki mabe mingi na miso ya [Yehova] mpe apelisaki nkanda na ye.” (2 Mik. 21:6) Kasi, ntango Manase akufaki, azalaki moto ya sembo mpe azalaki mokonzi. Esalemaki ndenge nini?
Nsukansuka, Manase andimaki disipilini. Ntango Manase aboyaki koyoka makebisi, Yehova amemelaki ye Baasulia, bakangaki ye minyololo mpe bamemaki ye moombo mosika, na Babilone. Kuna, Manase “abondelaki elongi ya [Yehova], Nzambe na ye mpe [amikitisaki] mingi liboso ya Nzambe ya batata na ye. Abondelaki ye.” Manase abongolaki mpenza motema, amonisaki yango na misala, mpe Yehova alimbisaki ye.—2 Nta. 33:12, 13.
Mbala mingi, soki moto abungisi mikumba ezongaka mbala moko te. Kasi, nsima ya ntango, okoki kobanda kozwa mikumba ya mikemike. Kondima yango mpe kokokisa yango malamu, epesaka mbala mingi nzela na mikumba mosusu. Yango elingi koloba te ete ekozala kaka pɛtɛɛ. Makambo mosusu ekoki kolɛmbisa yo nzoto. Nzokande, komipesa mpe kolendendela ebotaka mbuma ya malamu.
Mekolá ndakisa ya Yozefe, mwana ya Yakobo. Ntango Yozefe azalaki na mbula 17, bandeko na ye batɛkaki ye na boombo atako asalaki mabe te. (Gen. 37:2, 26-28) Na ntembe te, azalaki kokanisa te ete bana ya tata na ye bakokaki kosala ye likambo ya ndenge wana. Kasi, andimaki makambo yango, mpe na lipamboli ya Yehova, “akómaki kotambwisa makambo ya ndako ya nkolo na ye.” (Gen. 39:2) Na nsima, batyaki Yozefe na bolɔkɔ. Kasi, atikalaki sembo mpe Yehova azalaki na ye elongo, mpe nsukansuka bapesaki ye mokumba ya kotalela makambo ya bolɔkɔ.—Gen. 39:21-23.
Yozefe ayebaki te ete nyonso wana ezalaki mpo na mokano moko boye. Akobaki kaka kosala oyo akokaki. Na yango, Yehova asalelaki ye mpo na kobatela molɔngɔ oyo emamaki tii na Momboto oyo alakamaki. (Gen. 3:15; 45:5-8) Atako moko te kati na biso akoki kozela ete azwa mokumba monene lokola oyo Yozefe azwaki, lisolo yango emonisi ete lobɔkɔ ya Yehova esalaka mosala mpo na mikumba oyo basaleli na ye bazwaka. Tiká nzela polele, mekolá ndakisa ya Yozefe.
Tiká mabunga na yo eteya yo
Yobo, Manase, ná Yozefe bakutanaki na makambo mingi ya mpasi. Mibali yango misato bandimaki makambo oyo Yehova apesaki nzela, mpe mokomoko na bango azwaki mateya ya ntina mingi. Mateya nini okoki kozwa?
Luká koyeba soki Yehova alingi koteya yo nini. Ntango Yobo azalaki na mpasi, akómaki kotalela kaka makambo na ye, mpe abosanaki makambo oyo eleki minene. Kasi, ntango Yehova asembolaki ye na bolingo, azongelaki makanisi ya malamu mpe alobaki boye: “Nabimisi makambo mayebi ngai ntina te.” (Yobo 42:3) Soki ozali koyoka mpasi ndenge obungisá mikumba na yo, ‘kokanisa mpo na yo moko te koleka ndenge oyo esengeli kokanisa; kasi kanisá nde na ndenge ya kozala na makanisi malamu.’ (Lom. 12:3) Mbala mosusu Yehova alingi kobongisa yo na ndenge oyo ozali koyeba mpenza te.
Ndimá disipilini. Mbala mosusu na ebandeli Manase azalaki kokanisa ete abongaki te kozwa etumba ya makasi ndenge wana. Kasi, andimaki yango, abongolaki motema, mpe atikaki nzela na ye ya mabe. Ata soki ozali koyoka ndenge nini mpo na disipilini oyo ozwaki, ‘mikitisá na miso ya Yehova, mpe ye akotombola yo.’—1 Pet. 5:6; Yak. 4:10.
Zalá motema molai mpe kolɛmba nzoto te. Makambo oyo Yozefe akutanaki na yango ekokaki kotinda ye ayina bandeko na ye mpe aluka kozongisa mabe na mabe. Kasi, akolisaki nde bososoli mpe motema mawa. (Gen. 50:15-21) Soki basalaki yo likambo moko oyo elɛmbisaki yo nzoto, zalá motema molai. Ndimá Yehova abongisa yo.
Kala ozalaki na mikumba na lisangá? Pesá Yehova libaku ya kopesa yo mikumba lisusu. Bongisá boyokani na yo na Nzambe. Longolá nkanda mpe loná motema molai mpe komikitsa. Ndimá mokumba nyonso oyo bakoki kopesa yo. Yebá ete Yehova “akoboya kopesa eloko malamu soki moko te na baoyo bazali kotambola alima.”—Nz. 84:11.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]
Zalá makasi na kati ya kondima na nzela ya mabondeli
[Elilingi na lokasa 31]
Kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola ezali lolenge eleki malamu ya kolendisa elimo na yo
[Elilingi na lokasa 32]
Tikelá Yehova nzela ya kopesa yo mikumba lisusu