Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/9 nk. 20-23
  • Ntango moto asali yo mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango moto asali yo mabe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kozongisa mabe na mabe ebebisaka makambo
  • Ebakisaka mpasi likoló ya mpasi
  • “Liso mpo na liso”
  • Tólanda nzela ya kimya
  • 2 | Kozongisa mabe na mabe te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Ebongi kozongisa mabe na mabe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Maloba “liso mpo na liso” elimboli nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Pekisá nkanda “mpo na kolonga mabe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/9 nk. 20-23

Ntango moto asali yo mabe

MBALA mingi, bato balobaka ete motema ekitaka kaka soki ozongisi mabe oyo basali yo. Yango ezali likambo ya kokamwa te mpo toyokaka mpasi na motema ntango basali biso mabe to bazokisi biso na likambo moko. Likoki oyo tobotamá na yango ya kokesenisa mabe ná malamu esɛngaka ete likambo ya mabe esembolama. Kasi, ndenge nini?

Ezali na makambo ndenge na ndenge ya mabe oyo bakoki kosala biso: bakoki kobɛta biso mbata, kotindika biso, kofinga biso, koloba na biso mabe, kobɛta biso, koyiba biso biloko, mpe bongo na bongo. Osalaka nini soki moto asali yo likambo ya mabe? Lelo oyo, emonanaka ete bato mingi balobaka, ‘Nakozongisela ye mabe oyo asali ngai!’

Na États-Unis, bana mingi oyo batángaka na eteyelo ya ntei bakómi kofunda balakisi ete bazali konyokola bango, mpo na kozongisela balakisi yango mabe ndenge bapesaki bango etumbu. Brenda Mitchell, mwasi oyo azali prezida ya ebongiseli ya balakisi na etúká ya Nouvelle-Orléans, alobi boye: “Likambo oyo ezali kosalema ezali ete, soki kaka bana bafundi molakisi, lokumu na ye ebebi.” Ata soki eyei koyebana ete efundeli yango ezalaki lokuta, bato bakoki kotikala kaka na makanisi ya mabe mpo na molakisi yango.

Na bisika ya mosala, bato oyo bazali kosepela lisusu na mosala te to baoyo balongoli na mosala bazali koluka kozongisa mabe epai na bapatrɔ na bango; bazali kobebisa to koboma makambo ya ntina oyo ezali na baordinatɛrɛ ya mosala. Bato mosusu bazali koyiba basekele ya kompanyi mpe bazali kotɛka yango to koyebisa yango bato mosusu. Longola koyiba makambo na baordinatɛrɛ ya mosala, zulunalo moko (The New York Times) elobi ete “tii lelo koyiba biloko ya kompanyi ezali lolenge ya libosoliboso oyo bato ya mosala bazongisaka mabe na mabe.” Mpo na kopekisa basali bázongisa mabe na mabe, bakompanyi mingi endimi kotya mokɛngɛli oyo akozala elongo na moto oyo balongoli na mosala ntango moto yango akɔti na biro na ye, akozela ye asilisa kozwa biloko na ye, mpe akobimisa ye tii na libándá ya kompanyi.

Mbala mingi tozongisaka mabe na mabe epai ya bato oyo tozali na bango esika moko: baninga, bato oyo tosalaka na bango, mpe bandeko ya libota. Soki moto azokisi biso na maloba to asali biso likambo moko ya mabe, mbala mingi tolingaka kozongisela ye yango. Soki moninga moko agangeli yo to akateli yo lingala, yo mpe ozongiselaka ye yango? Soki ndeko moko ya libota asali yo likambo oyo epesi yo nkanda, olukaka ndenge ya kozongisela ye yango? Ezalaka mpasi te kosala bongo soki tozalaka esika moko na moto oyo asali biso mabe!

Kozongisa mabe na mabe ebebisaka makambo

Mbala mingi, bato balukaka kozongisa mabe na mabe mpo na kokitisa nkanda mpe mpasi oyo bayokisaki bango. Na ndakisa, Biblia elobi ete ntango bana ya Yakobo, tata ya libota ya Baebre, bayokaki ete Shekeme, oyo azalaki Mokanana, abebisaki ndeko na bango ya mwasi Dina, “bazokaki na mitema na bango mpe bayokaki nkanda makasi.” (Ebandeli 34:1-7) Mpo na kozongisa mabe oyo basalaki ndeko na bango ya mwasi, bana mibale ya Yakobo bayokanaki mpo básala Shekeme ná libota na ye mabe. Na mayele mabe, Simeone ná Levi bakɔtaki na engumba ya Bakanana mpe babomaki mibali nyonso, kati na bango Shekeme.​—Ebandeli 34:13-27.

Babongisaki nde makambo lokola basopaki makila ya bato bongo? Ntango Yakobo ayokaki makambo oyo bana na ye basalaki, apamelaki bango; alobaki ete: “Bomemeli ngai mpasi na ndenge bokómisi ngai eloko ya nsolo mabe epai ya bato oyo bafandi na mokili oyo, . . . soki bango bakosangana mpenza mpo na kobunda na ngai mpe kokwela ngai, bakosilisa ngai ná ndako na ngai nyɛɛ.” (Ebandeli 34:30) Ya solo, na esika bábongisa makambo, babebisaki yango nde kobebisa na ndenge bazongisaki mabe na mabe; sikoyo libota ya Yakobo esengelaki kozala ekɛngɛ mpo bato ya bamboka ya pembeni oyo bakómaki na nkanda bakokaki kobundisa bango. Na ntembe te, mpo likambo ya ndenge wana esalema te, Nzambe ayebisaki Yakobo alongola libota na ye wana mpe amema yango na Betele.​—Ebandeli 35:1, 5.

Makambo oyo esalemaki ntango babebisaki Dina epesi liteya moko monene. Mbala mingi, soki tozongiseli moto mabe na mabe, ye mpe akoluka kozongisela biso mpe likambo ekosila te. Na yango, lisese oyo ezali solo ete: Bóma ngai, naboma yo, tóbomana.

Ebakisaka mpasi likoló ya mpasi

Kokanisa kaka ndenge ya kopesa moto oyo asalaki biso mabe etumbu ezali likama. Buku Kolimbisa​—Ndenge ya kotya kimya na makambo oyo eleká mpe kokoba na bomoi (na Lingelesi) elobi boye: “Nkanda ekoki kolya yo. Ekoki kolya ntango mpe makasi na yo wana ozali kokoba kokanisa mpasi oyo oyokaki, ozali kolakela mabe bato oyo bazokisaki yo, mpe ozali koluka ndenge ya kozongisela bango mabe yango.” Ndenge Biblia emonisi yango polele, ‘zuwa ezali kopɔla mpo na mikuwa.’​—Masese 14:30.

Ya solo mpenza, ndenge nini moto akoki kozala na esengo soki azali koyina basusu mpe koyoka mpasi na motema na ye? Mopanzi-nsango moko alobaki boye: “Soki ozali kokanisa ete ‘motema ekokita kaka soki ozongisi mabe oyo basali yo,’ talá bilongi ya bato oyo bazalaka na mposa ya kozongisa mabe na mabe banda bambula mingi.”

Talá makambo oyo ezali kosalema na mikili mingi oyo bato ya bikólo mpe mangomba ekeseni bayokanaka te. Mbala mingi, soki babomi moto moko, moto mosusu asengeli kokufa, mpe yango ebakisaka koyina oyo esilaka te mpe ememaka liwa ya bato ebele. Na ndakisa, ntango bɔmbi moko oyo bateroriste babwaki ebomaki bilenge 18, mwasi moko oyo azalaki kolela agangaki ete, “Tosengeli kozongisela bango yango mbala ebele!” Na yango, mobulu ezali se kobakisama, mpe ezali se kokɔtisa ebele ya bato na matata yango.

“Liso mpo na liso”

Bato basaleka Biblia mpo na komonisa ete kozongisa mabe na mabe ezali malamu. Balobaka ete, “Biblia elobi te ete esengeli kozongisa ‘liso mpo na liso, lino mpo na lino’?” (Balevi 24:20) Soki totali yango likolólikoló, tokomona lokola nde mobeko ya “liso mpo na liso” ezali kolendisa likambo ya kozongisa mabe na mabe. Nzokande, mobeko yango ezali nde mpo na kopekisa makambo oyo bato basalaka mpo na kozongisa mabe na mabe. Na ndenge nini?

Soki Moyisraele abundisi Moyisraele mosusu mpe atoboli ye liso, Mibeko ezalaki kopesa etumbu oyo esengeli. Kasi, ezalaki te moto oyo basali mabe nde asengelaki kopesa etumbu na moto oyo asali ye mabe to na moto moko ya libota na ye. Mibeko esɛngaki ete amema likambo yango epai ya basambisi oyo batyamaki, mpo bákata likambo yango malamu. Koyeba ete kosala moninga likambo ya mabe na nko ekokaki kosala ete ozwa etumbu oyo ekokani na mabe oyo osalaki, ezalaki mpenza kopekisa bato bázongisaka mabe na mabe. Kasi, esuki kaka wana te.

Liboso apesa mokeko oyo touti kolobela, Yehova Nzambe ayebisaki ekólo Yisraele na nzela ya Moize ete: “Osengeli te koyina ndeko na yo na motema na yo. . . . Osengeli te kozongisela bana ya bato na yo mabe to kokangela bango nkanda.” (Balevi 19:17, 18) Ya solo, etinda ya “liso mpo na liso, lino mpo na lino” esengeli kotalelama na kati ya kondimana ya Mibeko, oyo Yesu alobaki ete esangisi mibeko mibale oyo: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso” mpe “osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:37-40) Na yango, ndenge nini bakristo ya solo basengeli kosala ntango basali bango mabe?

Tólanda nzela ya kimya

Biblia elobi ete Yehova azali “Nzambe ya kimya” mpe elendisi basambeli na ye ‘bálukaka kimya mpe bálandaka yango.’ (Baebre 13:20; 1 Petro 3:11) Kasi, kotosa etinda yango ebotaka mpenza mbuma ya malamu?

Ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, banguna na ye babwakelaki ye nsoi, babɛtaki ye, banyokalaki ye, moninga na ye moko atɛkaki ye, mpe ata bayekoli na ye basundolaki ye. (Matai 26:48-50; 27:27-31) Azalaki kosala nini? Ntoma Petro akomaki boye: “Ntango azalaki kofingama, azalaki kozongisa kofinga te. Ntango azalaki konyokwama, azalaki kokanela moto te, kasi azalaki ntango nyonso komitika na mabɔkɔ ya moto oyo asambisaka na bosembo.”​—1 Petro 2:23.

Petro alobaki boye: “Kristo mpe anyokwamaki mpo na bino, atikeli bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Petro 2:21) Ya solo, Biblia elendisi bakristo bámekola Yesu, ata mpe ndenge asalaki ntango banyokolaki ye. Na likambo yango, Yesu ye moko alobaki na Lisolo Likoló ya Ngomba ete: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló.”​—Matai 5:44, 45.

Bato oyo bamekolaka bolingo ya Kristo basalaka nini ntango basali bango mabe to ntango bakanisi ete basali bango mabe? Masese 19:11 elobi boye: “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye, mpe kitoko na ye ezali ete alimbisaka likambo oyo ebuki mibeko.” Batosaka mpe toli oyo: “Kotika mabe elonga yo te, kasi saláká malamu mpo na kolonga mabe.” (Baroma 12:21) Toli yango ekeseni mpenza na makanisi ya kozongisa mabe na mabe oyo epalangani mingi na mokili oyo! Bolingo oyo bakristo ya solo bazalaka na yango ekoki kosalisa biso tólonga mposa ya kozongisa mabe na mabe mpe na ndenge yango ‘tólimbisa likambo oyo ebuki mibeko’ mpo bolingo “ebombaka mabe na motema te.”​—1 Bakorinti 13:5.

Yango elingi nde koloba ete soki basali biso likambo ya mabe, tosengeli kaka kondima yango na komikitisa? Soki moke te! Ntango Paulo alobaki ete “Saláká malamu mpo na kolonga mabe,” alingaki koloba te ete mokristo asengeli kondima kokufa martiru. Soki balingi kosala biso mabe, tozali na lotomo ya komibatela. Soki babebisi lokumu na yo to eloko na yo, okoki kopona kobenga bapolisi. Soki moninga ya mosala to ya kelasi nde asali yo likambo yango, ezali na bakonzi oyo okoki kosɛnga bango básalisa yo.​—Baroma 13:3, 4.

Atako bongo, ezali malamu tóyeba ete na mokili oyo, ezali mpasi bákata mpenza likambo na bosembo. Kutu, bato mingi balekisi bomoi na bango na kokuka bosembo ya solosolo, kasi bazali nde na mawa mpe na nkanda na motema mpo makambo oyo balingi ezali kokokisama te.

Satana alingaka komona bato bakabwani mpo bázongisani mabe na mabe mpe bayinani. (1 Yoane 3:7, 8) Eleki malamu tóbosana te maloba ya Biblia oyo: “Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe, Yehova alobi bongo.’” (Baroma 12:19) Soki totiki makambo na mabɔkɔ ya Yehova, tokozala na mpasi na motema te, tokozala na nkanda te mpe mobulu ekozala te.​—Masese 3:3-6.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]

“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso” mpe “osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko”

[Bililingi na lokasa 23]

Bolingo “ebombaka mabe na motema te.”​—1 Bakorinti 13:5

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto