Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/9 lok. 24
  • Likamwisi na feti ya Pantekote!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likamwisi na feti ya Pantekote!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu abikisi bato na ndenge ya likamwisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu akamwisi bayoki na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tata oyo akokani na mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/9 lok. 24

Mpo na bilenge

Likamwisi na fɛti ya Pantekote!

Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omitya na esika ya bato oyo balobeli.

TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ MISALA 2:1-21, 38-41.

Likanisi nini ezali koyela yo wana ozali kotánga lisolo oyo elobeli “mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi” mpe ‘ndemo lokola ya mɔtɔ’?

․․․․․

Okanisi ete bato bazalaki koloba nini ntango bakamwaki na koyoka ndenge oyo bayekoli bazalaki koloba na minɔkɔ mosusu? 

․․․․․

Mpo na yo, bilongi ya bato ya ntembe oyo balobelami na vɛrsɛ 13 ezalaki ndenge nini?

․․․․․

KƆTÁ NA MOZINDO.

Pantekote ezalaki libaku ya ndenge nini, mpe mbala mosusu fɛti yango esalaki ndenge nini epai ya ebele ya bato oyo bayanganaki na Yerusaleme? (Kolimbola Mibeko 16:10-12)

․․․․․

Ndenge nini Petro amonisaki limemya ntango azalaki koloba na bayoki na ye, mpe na ndenge nini alukaki lisolo oyo ekobimisa ntembe te? (Misala 2:29)

․․․․․

Ndenge nini mpiko oyo Petro azalaki na yango na Pantekote ekeseni mpenza na ndenge asalaki liboso ya makambo oyo akutanaki na yango na lopango ya nganga-nzambe monene? (Matai 26:69-75)

․․․․․

SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Ntina ya koluka likambo oyo ekobimisa ntembe te na bayoki na biso mpe koloba na limemya ntango tozali koteya bango solo ya Biblia.

․․․․․

Ndenge oyo okoki kozala Motatoli ya Yehova ya mpiko, ata soki sikoyo ozali komona ete ozali nsɔninsɔni to obangabangaka.

․․․․․

NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1996, nkasa 8-9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto