Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/9 nk. 3-6
  • Ngai moko nde naponá lingomba na ngai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ngai moko nde naponá lingomba na ngai?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokumba ya bana
  • Mokumba ya baboti
  • Mokumba ya lisangá
  • Yo moko poná
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ozali kosalisa mwana na yo na kopona kosalela Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Bilenge, bópona kosalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/9 nk. 3-6

Ngai moko nde naponá lingomba na ngai?

NA Pologne, bato mingi balobaka na Batatoli ya Yehova boye: “Nabotamá na lingomba oyo, mpe nakokufa kaka na lingomba yango.” Yango emonisi ete mpo na bango, moto asengeli kolanda kaka lingomba ya baboti na ye. Bato ya teritware na bino bakanisaka mpe bongo? Mbala mingi makanisi ya ndenge wana ebimisaka mokakatano nini? Etindaka bato bákóma kosambela kaka mpo na kosambela, mpo ezali momeseno ya libota na bango. Likambo yango ekoki mpe kokómela Batatoli ya Yehova oyo bayekoli solo epai ya baboti to bankɔkɔ na bango?

Ezalaki bongo te mpo na Timote, oyo mama mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi basalisaki ye andima Nzambe ya solo mpe akóma kolinga ye. Timote ayebaki makomi mosantu ‘banda bomwana na ye mpenza.’ Na nsima, Timote ná mama na ye mpe nkɔkɔ na ye bandimaki ete lingomba ya bokristo ezali ya solo. Basalisaki ye ‘andima bosolo’ ya makambo oyo Makomami ezalaki koteya na ntina na Yesu Kristo. (2 Tim. 1:5; 3:14, 15) Na yango, atako lelo oyo baboti bakristo basalaka nyonso mpo na kosalisa bana na bango bákóma basaleli ya Yehova, bana bango moko nde basengeli kokolisa mposa yango.​—Mrk. 8:34.

Mokomoko na biso asengeli kondima mpenza ete makambo oyo ayekoli ezali solo, soki alingi kosalela Yehova na bolingo mpe kotikala sembo epai na ye ata na komekama ya ndenge nini. Na ndenge yango, kondima na ye ekozala makasi mpe ekopika misisa.​—Ef. 3:17; Kol. 2:6, 7.

Mokumba ya bana

Albert,a oyo akolaki na libota ya Batatoli ya Yehova, alobi boye: “Nayebaki ete Lingomba ya Batatoli ya Yehova ezali ya solo, kasi ezalaki mpasi mpo nandima makambo oyo bazalaki koyebisa ngai mpo na ndenge oyo nasengeli kotambwisa bomoi na ngai.” Soki ozali elenge, mbala mosusu yo mpe okanisaka lokola Albert. Tolendisi yo oluka koyeba makambo oyo esɛngami mpo na kozala na bomoi oyo Nzambe alingi; na ndenge yango okozala na esengo ya kosala mokano na ye. (Nz. 40:8) Albert alobi boye: “Nabandaki naino na kobondela kasi, na ebandeli ezalaki pɛtɛɛ te. Nasengelaki kosala makasi mpo na yango. Kasi, na nsima namonaki ete nakozala na motuya na miso ya Nzambe soki naluki kosala oyo ezali malamu. Yango epesaki ngai makasi ya kobongola bomoi na ngai.” Soki osali makasi mpo na kokóma moninga ya Yehova, okozala na mposa ya kosala makambo oyo azali kosɛnga biso.​—Nz. 25:14; Yak. 4:8.

Kanisá naino lisano moko oyo obɛtaki, na ndakisa lisano ya dame, ngola to lisano ya ndembo. Soki oyebi mibeko ya lisano yango te to oyebi kobɛta yango malamu te, okosepela na lisano yango te. Kasi, soki oyekoli ndenge ya kobɛta yango mpe oyebi yango malamu, okokóma kosepela mpenza na lisano yango, ata mpe koluka kobɛta yango. Ezali mpe bongo mpo na losambo na biso. Na yango, omityela mokano ya kobongisaka makita. Omipesa mpenza. Ya solo, ata soki ozali na mbula boni, okoki kolendisa basusu na ndakisa na yo.​—Ebr. 10:24, 25.

Ezali mpe bongo na oyo etali koyebisa basusu bindimeli na yo. Osengeli kosala yango na bolingo na yo moko, kasi kozelaka te bátinda yo. Omituna boye: ‘Nini etindaka ngai nayebisa basusu makambo ya Yehova? Bantina nini nazali na yango ya kolinga Yehova?’ Osengeli koyeba ete Yehova azali Tata ya bolingo. Alobaki boye na nzela ya Yirimia: “Bokoluka ngai mpe bokozwa ngai, mpo bokoluka ngai na motema na bino mobimba.” (Yir. 29:13, 14) Yango ekoki kosɛnga osala nini? Jakub alobi boye: “Nasengelaki kobongola makanisi na ngai. Banda bomwana na ngai, nazalaki kokende na makita mpe kobima na mosala ya kosakola; kasi nazalaki kosala yango kaka mpo nasala. Namipesaki mpenza na solo kaka ntango nayebaki Yehova malamu mpe nakómaki na boyokani makasi na ye.”

Baninga ya malamu bakolendisa yo mpe okóma kosepela na mosala ya kosakola. Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.” (Mas. 13:20) Yango wana, luká kozala na baninga oyo bazali na mikano ya elimo mpe basepelaka kosalela Yehova. Jola alobi boye: “Kozala na baninga mingi oyo bazalaki komipesa na mosala ya Yehova elendisaki ngai. Nakómaki na esengo ya kobimaka na mosala ya kosakola.”

Mokumba ya baboti

Jola alobi boye: “Natɔndaka mpenza baboti na ngai na ndenge basalisaki ngai nayeba Yehova.” Ya solo, baboti bakoki mpenza kosalisa bana na bango bápona nzela ya malamu. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bino, batata, . . . bókoba kobɔkɔla [bana na bino] na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4) Toli wana ya Biblia emonisi polele ete mokumba ya baboti ezali ya kolakisa bana na bango nzela ya Yehova, kasi oyo ya bango moko te. Na esika bóluka bana na bino bákokisa mikano na bino, ekozala malamu bósalisa bango bázala na bomoi oyo eyokani na mokano ya Yehova!

Okoki kokɔtisa maloba ya Yehova na mitema ya bana na yo mpe “kolobela yango ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala mpe ntango okolala mpe ntango okolamuka.” (Mib. 6:6, 7) Ewa ná Ryszard, baboti ya bana misato, balobi boye: “Tozalaki kosolola mingi ná bana na biso mpo na mitindo ndenge na ndenge ya mosala ya ntango nyonso.” Yango ebimisaki matomba nini? Balobi boye: “Bana na biso bakomisaki nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ntango bazalaki naino bana mike mpenza, bakómaki basakoli mpe nsukansuka bazwaki ekateli ya kozwa batisimo. Na nsima, bamosusu bakɔtaki na Betele mpe bamosusu bakómaki babongisi-nzela.”

Ndakisa ya baboti ezali na ntina mpenza. Ryszard alobi boye: “Tozalaki kosala nyonso mpo tózala te na bomoi ya lolenge mibale; na ndako tozali na etamboli mosusu mpe na lisangá, etamboli mosusu.” Na yango, omituna boye: ‘Bana na ngai bamonaka ngai ndenge nini? Bamonaka ete nalingaka mpenza Yehova? Bamonaka bolingo yango na mabondeli na ngai mpe na ndenge nayekolaka Biblia? Bamonaka bolingo yango na ndenge natalelaka mosala ya kosakola, kominanola, biloko ya mokili, mpe na makambo oyo nalobaka mpo na bandeko mosusu ya lisangá?’ (Luka 6:40) Soki bozali kosalela te makambo oyo bolobaka, bana bakomona yango.

Kobɔkɔla bana esɛngaka mpe kopesa disiplini. Kutu, Liloba ya Nzambe elendisi baboti boye: “Bɔkɔlá mwana mobali na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye.” (Mas. 22:6) Ewa ná Ryszard balobi boye: “Tozalaki kozwa ntango ya koyekola Biblia na mwana mokomoko.” Ya solo, baboti nde basengeli kopona soki bakoyekola na mwana mokomoko to te. Ezala bazali koyekola na bana nyonso esika moko to te, basengeli koyeba ete mwana nyonso azalaka na mposa bátyela ye likebi. Yango esɛngaka baboti bázala makambo makasimakasi te mpe báyeba komitya na esika ya mwana mokomoko. Na ndakisa, na esika ya kosuka kaka na koyebisa bana ete lolenge moko boye ya miziki ezali mabe, mpo na nini te kolakisa bango ndenge ya kozwa bikateli ya malamu na kotalela mitinda ya Biblia?

Bana bakoki koyeba makambo oyo olingi bango básala mpe bakoki komonisa ete bazali kolanda yango. Atako bongo, osengeli koluka kosimba mitema na bango. Kobosana te ete “makanisi na motema ya moto ezali lokola mai mozindo, kasi moto ya bososoli nde akotoka yango.” (Mas. 20:5) Zalá na bososoli, taleláká bilembo nyonso oyo ekoki kosalisa yo oyeba makambo oyo ezali na mitema ya bana na yo, mpe lukáká mbala moko kosembola yango. Koluka te kosambisa bango, kasi monisá ete likambo yango etungisi yo, mpe tuná bango mituna oyo ebongi. Kasi, kebá ete olekisa ndelo te. Milende oyo ozali kosala mpo na kosalisa bango ekosimba mitema na bango mpe ekopesa yo likoki ya kosalisa bango.

Mokumba ya lisangá

Okoki kosalisa bilenge na kati ya lisangá bámona motuya ya libula ya elimo oyo bazwá? Atako baboti nde bazali na mokumba ya koteya bana na bango, bandeko mosusu na lisangá, mingimingi bankulutu, bakoki kopesa bango mabɔkɔ. Ezali mpenza na ntina kosalisa bana oyo baboti na bango nyonso te nde bazali Batatoli.

Bankulutu basengeli kosala nini mpo na kosalisa bilenge bálinga Yehova mpe bámona ete lisangá ezali na mposa na bango? Mariusz, oyo azali nkulutu na lisangá moko na Pologne, alobi boye: “Bankulutu basengeli kolɛmba te kosololaka na bilenge. Basengeli kosala yango kaka te ntango likambo ebimi, kasi ata mpe na mabaku mosusu, na ndakisa na mosala ya kosakola, nsima ya makita to ntango bazali kozwa mwa mopɛpɛ.” Na ndakisa, mpo na nini te kotuna bilenge báyebisa makambo oyo bamoni ete lisangá esengeli kobongisa. Masolo ya ndenge wana esalaka ete bilenge bákangama na lisangá mpe bámona ete bazali mpe na ntina.

Nkulutu, osalaka makasi mpo na koyeba bilenge ya lisangá na bino? Atako Albert oyo tolobelaki liboso azali nkulutu lelo oyo, akutanaki na mikakatano ndenge na ndenge na bolenge na ye. Alobi boye: “Ntango nazalaki elenge, nazalaki na mposa ete bankulutu báyaka kotala ngai.” Bankulutu bakoki mpe komonisa ete batyelaka bilenge likebi soki bazali kobondela mpo na bango, mpo bázala na boyokani makasi na Yehova.​—2 Tim. 1:3.

Ezali malamu ete bilenge bámipesa na makambo ya lisangá. Soki te, bakomipesa na makambo ya mokili. Bino mikóló, bokoki kobimaka na mosala ya kosakola elongo na bango mpe kokómisa bango baninga na bino? Soki ozali kozwa ntango ya kozalaka na bilenge, okokóma mpenza moninga na bango. Jola alobi boye: “Ndeko mwasi moko mobongisi-nzela atyelaki ngai mpenza likebi. Ezalaki na ye nde nabimaki na mosala ya kosakola mpo na mbala ya liboso oyo motema na ngai esepelaki kosala yango.”

Yo moko poná

Bilenge, bómituna boye: ‘Mikano nini nazali na yango? Soki nazwi naino batisimo te, nazali na mokano ya kosala yango?’ Ekateli ya kozwa batisimo esengeli kouta na motema oyo etondi na bolingo mpo na Yehova, kasi te mpo moto nyonso ya libota na bino azwá batisimo.

Ya solo, tiká Yehova azala moninga na yo mpe solo ezala eloko ya motuya mpo na yo. Yehova alobaki na nzela ya mosakoli Yisaya boye: “Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo.” Yehova akozala na yo kaka soki okobi kozala moninga na ye. Akolendisa yo mpe ‘akosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ye ya mobali ya boyengebene.’​—Yis. 41:10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo mosusu ezali ya bango te.

[Elilingi na lokasa 4]

Luká koyeba makambo oyo ezali na motema ya mwana na yo

[Elilingi na lokasa 6]

Ekateli ya kozwa batisimo esengeli kouta na motema oyo etondi na bolingo mpo na Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto