Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/4 lok. 11
  • Yesu Kristo—Nsango na ye etali mpe yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu Kristo—Nsango na ye etali mpe yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Lisiko—Likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Lisiko ezali likabo ya Nzambe oyo eleki monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Likabo nini eleki makabo nyonso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mpo na nini likabo yango ezali na valɛrɛ mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/4 lok. 11

Yesu Kristo​—Nsango na ye etali mpe yo

“Ngai nayei mpo bázwa bomoi mpe bázwa yango mingi.”​—YOANE 10:10.

YESU KRISTO ayaki na mabele libosoliboso mpo na kopesa, kasi te mpo na kozwa. Na nzela ya mosala na ye, apesaki bato likabo moko ya motuya mingi​—nsango oyo emonisaki solo na ntina ya Nzambe mpe mokano na ye. Baoyo bazali kondima nsango yango bakoki kozala na bomoi ya malamu sikoyo, ndenge bamilio ya bakristo ya solo bazali na yango.a Kasi, na nsango oyo Yesu asakolaki likambo ya libosoliboso ezali likabo oyo eleki nyonso​—bomoi ya kokoka oyo apesaki mpo na biso. Elikya na biso ya seko etaleli lolenge oyo tozali kondima likambo yango ya ntina mingi ya nsango na ye.

Oyo Nzambe mpe Kristo bapesá Yesu ayebaki ete akokufa liwa moko ya mpasi na mabɔkɔ ya banguna na ye. (Matai 20:17-19) Atako bongo, na maloba na ye oyo toyebi malamu, oyo ezali na Yoane 3:16, alobaki: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” Yesu alobaki mpe ete ayaki “kopesa molimo [to, bomoi] na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Mpo na nini alobaki ete bomoi na ye ekopesama kasi te ete ekozwama?

Lokola alingaki bato mingi, Nzambe azwaki ebongiseli mpo na kobikisa bato na lisumu oyo basangolaki mpe na makambo mabe na yango​—kozanga kokoka mpe liwa. Nzambe asalaki yango na ndenge atindaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki na mabele mpo akufa lokola mbeka. Yesu andimaki na bolingo na ye moko, apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo na biso. Ebongiseli yango, oyo ebengami lisiko, ezali likabo eleki monene oyo Nzambe apesaki bato.b Ezali likabo oyo ekoki komema na bomoi ya seko.

Oyo osengeli kosala Likabo ya lisiko ezali mpe mpo na yo? Etali kaka yo. Tózwa ndakisa: Kanisá ete moto moko atandi lobɔkɔ mpo na kopesa yo kado moko oyo bazingi malamu. Ya solo, ekokóma ya yo ntango osimbi yango mpe ondimi yango. Ndenge moko, Yehova azali kopesa yo lisiko, kasi okozwa mpenza likabo yango ntango ondimi yango. Ndenge nini?

Yesu alobaki ete baoyo bazali “kondimela” ye nde bakozwa bomoi ya seko. Kondima esengeli komonana na ndenge ozali kotambwisa bomoi na yo. (Yakobo 2:26) Kondimela Yesu elimboli koyokanisa bomoi na yo na makambo oyo alobaki mpe asalaki. Mpo na kosala yango, osengeli koyeba Yesu mpe Tata na ye malamu. Yesu alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

Eleki mbula soki 2 000, Yesu Kristo asakolaki nsango oyo ebongoli bomoi ya bamilio ya bato na mokili mobimba. Okolinga koyeba makambo mingi na ntina na nsango yango mpe ndenge nini yo mpe bato oyo olingaka bokoki kozwela yango litomba sikoyo mpe mpo na libela? Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo.

Masolo oyo ekolanda ekosalisa yo oyeba lisusu malamu Yesu Kristo, moto oyo asakolaki nsango oyo ekoki kobongola bomoi na yo mpo na libela.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ezali te moto nyonso oyo amibengaka mokristo nde azali moyekoli ya solosolo ya Kristo. Bayekoli ya Yesu ya solosolo ezali baoyo bomoi na bango eyokanaka na mateya oyo ateyaki na ntina na Nzambe mpe mokano na ye.​—Matai 7:21-23.

b Mpo na koyeba makambo mingi na oyo etali mikapo oyo elobeli liteya ya lisiko, talá mokapo 5, “Lisiko​—Likabo monene ya Nzambe,” na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto