Oyebaki yango?
Longola Biblia, elembeteli nini mosusu emonisi ete Yesu azalaki mpenza na bomoi awa na mabele?
▪ Ebele ya bakomi oyo bazalaki na bomoi pene na ntango oyo Yesu azalaki awa na mabele, balobaki makambo ya sikisiki mpenza oyo etali ye. Kati na bango, tokoki kotánga Tacite, oyo akomaki lisolo ya Roma ntango baamperɛrɛ bazalaki koyangela yango. Mpo na mɔtɔ moko oyo ebebisaki Roma na mobu 64 ya ntango na biso, Tacite alobi ete bato bakanisaki ete Amperɛrɛ Néron nde abimisaki likama yango. Tacite alobi ete Néron alukaki komonisa ete etuluku yango oyo bato bazalaki kobenga bakristo nde batyaki mɔtɔ yango. Tacite akomi boye: “Nkombo wana ya bakristo, eutá na Kristo, oyo guvɛrnɛrɛ Ponsi Pilate apesaki nzela báboma na ntango ya boyangeli ya Tibere.”—Annales, XV, 44.
Flavius Josèphe, Moyuda moko mpe moto ya mayele na masolo ya kala alobelaki mpe Yesu. Ntango alobelaki makambo oyo esalemaki na mobu soki 62 ya ntango na biso, ntango Fesitusi guvɛrnɛrɛ Moroma ya Yudea akufaki mpe ntango Albinus akómaki koyangela na esika na ye, Josèphe alobi ete nganga-nzambe monene Ananus (Ananiasi) “abengaki bazuzi ya Sanedrina mpe amemaki liboso na bango mobali moko na nkombo Yakobo, ndeko ya Yesu oyo bazalaki kobenga Kristo, mpe bato mosusu.”—Antiquités judaïques, XX, 200 (ix, 1).
Mpo na nini Yesu abengamaki Kristo?
▪ Baevanzile elobi ete ntango anzelu Gabriele amonanaki na Maria mpo na koyebisa ye ete akokóma na zemi, ayebisaki ye ete asengeli kopesa mwana oyo akobota nkombo Yesu. (Luka 1:31) Yango ezalaki nkombo oyo Bayuda mingi bazalaki na yango na ntango ya kala. Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala, akomaki mpo na bato mosusu 12 oyo batángami te na Makomami, kasi bazalaki na nkombo yango. Mwana ya Maria abengamaki “Monazarete,” yango esalisaki bato báyeba Yesu oyo azalaki moto ya Nazarete. (Marko 10:47) Ayaki mpe koyebana na nkombo “Kristo,” to Yesu Kristo. (Matai 16:16) Yango elimboli nini?
Na Lingala, liloba “Kristo” euti na liloba ya Grɛki Khristos, oyo ekokani na liloba ya Ebre Mashiaḥ (Masiya). Maloba yango nyonso mibale elimboli “oyo atyami mafuta.” Maloba yango esalelamaki mpe mpo na bato mosusu liboso Yesu aya awa na mabele. Na ndakisa, Biblia elobi ete Moize, Arona mpe Mokonzi Davidi batyamaki mafuta, oyo elimboli ete Nzambe aponaki bango mpo bákokisa mokumba moko monene mpe ya bokonzi. (Balevi 4:3; 8:12; 2 Samwele 22:51; Baebre 11:24-26) Yesu, Masiya oyo alakamaki, azalaki momonisi monene ya Yehova. Na yango, ebongaki mpenza ete Yesu abengama “Kristo, Mwana ya Nzambe ya bomoi.”—Matai 16:16; Danyele 9:25.
[Elilingi na lokasa 15]
Elilingi ya Flavius Josèphe oyo moyemi moko asalaki