Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/4 nk. 16-18
  • Sinagoga—Epai Yesu ná bayekoli na ye basakolaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sinagoga—Epai Yesu ná bayekoli na ye basakolaki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Yesu asali makamwisi minene na Kapernaume
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Tótika te koyanganaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Na sinagoga ya Nazarete
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/4 nk. 16-18

Sinagoga​—Epai Yesu ná bayekoli na ye basakolaki

“Bongo akendaki epai na epai na Galile mobimba, azalaki koteya na basinagoga na bango mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi.”​—MATAI 4:23.

BAEVANZILE emonisi ete mbala na mbala Yesu azalaki na sinagoga. Ezala na Nazarete, engumba oyo akolaki, to na Kapernaume, engumba oyo ekómaki esika oyo azalaki kofanda, to na engumba nini to bamboka oyo atambolaki na boumeli ya mbula misato na ndambo ya mosala na ye, Yesu azalaki kokende mbala mingi na sinagoga mpo na kosakola mpe koteya Bokonzi ya Nzambe. Na yango, ntango akanisaki mosala oyo asalaki, Yesu alobaki boye: “Nazalaki ntango nyonso koteya na basinagoga mpe na tempelo, epai Bayuda nyonso bayanganaka.”​—Yoane 18:20.

Ndenge moko, bantoma ya Yesu mpe bakristo mosusu ya ekeke ya liboso bazalaki kokutana mbala mingi mpe koteya na basinagoga ya Bayuda. Kasi, ndenge nini Bayuda bakómaki kosambela na basinagoga? Mpe bandako yango ya losambo ezalaki ndenge nini na mikolo ya Yesu? Tiká tótalela yango mpenza na mozindo.

Esika ya ntina mingi na bomoi ya Bayuda Mbala misato na mbula, Bayuda ya mibali bazalaki kokende na Yerusaleme mpo na bafɛti oyo ezalaki kosalema kuna na tempelo mosantu. Kasi, mpo na losambo na bango ya mokolo na mokolo, bazalaki kokende na sinagoga ya mboka na bango, ezala bazali na Palestine to na moko ya bakaa ya ebele ya Bayuda oyo bakendeki kofanda epai mosusu.

Ntango nini babandaki kosalela sinagoga? Bato mosusu bakanisaka ete ekoki kozala na ntango oyo Bayuda bakendeki na boombo na Babilone (607-537 liboso ya ntango na biso), ntango oyo tempelo ya Yehova ebebisamaki. To ekoki kozala mosika te nsima ya kobima ya Bayuda na boombo, ntango Ezera, nganga-nzambe alendisaki bato na ye bázwa boyebi mingi mpe básosola Mobeko ya Nzambe.​—Ezera 7:10; 8:1-8; 10:3.

Na ebandeli, liloba “sinagoga” elimbolaki kaka “liyangani” to “lisangá.” Liloba yango esalelami mpe bongo na Septante, libongoli ya Grɛki na Makomami ya Ebre. Kasi, na nsima, liloba yango ekómaki kosalelama mpo na kolobela ndako oyo bato bazalaki koyangana mpo na losambo. Na ekeke ya liboso, bingumba pene na nyonso epai Yesu akendeki, ezalaki na sinagoga na yango; bingumba ezalaki na basinagoga mwa ebele; kasi Yerusaleme ezalaki na yango ebele. Bandako yango ezalaki ndenge nini?

Ndako oyo ebongaki mpenza mpo na losambo Ntango bazalaki koluka esika mpo na kotonga sinagoga, mbala mingi Bayuda bazalaki koluka esika ya mwa ngomba mpe kotonga yango mpo porte na yango (1) etala na ngambo ya Yerusaleme. Mibeko ya kotonga ndako yango ezalaki mpe kobongwana mpo bazalaki ntango nyonso te kolanda yango.

Ntango esili, mbala mingi sinagoga yango ezalaki ndako oyo ezangi mindɔndɔ, oyo batyá te biloko ndenge na ndenge. Kasi, eloko ya ntina mingi ezalaki sanduku (2) to esika oyo bazalaki kobomba eloko ya motuya mingi mpo na mboka​—barulo ya Makomami Mosantu. Ntango bazalaki koyangana, bazalaki kotya sanduku yango na ndenge oyo ekoki kosalisa ete bázongisa yango na esika oyo bazalaki kobomba yango (3).

Pene na sanduku mpe liboso ya lisangá, ezalaki na bakiti (4) mpo na bakambi ya sinagoga mpe mpo na moto nyonso ya lokumu oyo bazalaki kobenga. (Matai 23:5, 6) Na katikati ya sinagoga, batyaki ebaelo mpe kiti mpo na molobi (5). Liboso ya ebaelo yango, na ngambo misato ezalaki na bisika mpo na bayangani (6).

Mingimingi, bato ya mboka oyo sinagoga ezalaki epai na bango nde bazalaki kopesa mbongo mpo na kosunga misala na yango. Makabo ya bolingo malamu oyo moto nyonso azalaki kopesa, azala mozwi to mobola nde ezalaki kosalisa mpo ndako yango ebatelama malamu mpe ebongisamaka malamu. Kasi, makita na sinagoga yango ezalaki ndenge nini?

Losambo na sinagoga Losambo na sinagoga ezalaki na makambo lokola kosanzola, kobondela, kotánga Makomami, koteya mpe kosakola. Bayangani bazalaki kobanda na kotánga Shema, oyo ekokanaki na eyambweli ya kondima ya Bayuda. Nkombo yango eutaki na liloba ya liboso ya vɛrsɛ oyo: “Yoká [Shema], Ee Yisraele: Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.”​—Kolimbola Mibeko 6:4.

Na nsima, bazalaki kotánga makambo oyo ezwami na Torah, mikanda mitano ya liboso ya Biblia, oyo Moize akomaki. (Misala 15:21) Bazalaki lisusu kotánga maloba oyo ezwamaki na makomi ya basakoli (haftarah) mpe bazalaki kolimbola mpe kolakisa ndenge ya kosalela yango. Ntango mosusu, balobi bapaya bazalaki kotánga mpe kolimbola makambo mingi ya programɛ yango, lokola Yesu asalaki ndenge elobelami na lisolo oyo ezali na Luka 4:16-21.

Ya solo, rulo oyo bapesaki Yesu na likita yango ezalaki te na mikapo mpe bavɛrsɛ lokola Babiblia oyo tozali na yango lelo. Na yango, okoki komona na makanisi ndenge Yesu azalaki kofungola rulo yango na lobɔkɔ na ye ya mwasi mpe azali kolinga yango na lobɔkɔ na ye ya mobali kino akomona mokapo oyo azali koluka. Nsima ya kotánga, bazalaki kokanga rulo yango ndenge ezalaki.

Mbala mingi, bazalaki kotánga makambo yango na Ebre mpe bazalaki kobongola yango na Aramɛyɛ. Na masangá oyo ezalaki kosalela monɔkɔ ya Grɛki, bazalaki kosalela libongoli ya Septante.

Esika bazalaki kokende mokolo na mokolo Na yango, Bayuda bazalaki kolekisa ntango na sinagoga mpe na bandako mosusu oyo ekangamaki na yango to na bandako oyo ezalaki esika moko na yango, oyo bazalaki kosalela yango mpo na makambo ndenge na ndenge. Ntango mosusu bazalaki kosambisa makambo kuna, makita ya mboka, ata mpe mayangani epai bazalaki kopesa biloko ya kolya na bisika ya kolya oyo ezalaki wana. Bazalaki kotya bato ya mibembo ntango mosusu na bandako oyo ezalaki na sinagoga.

Na bingumba pene na nyonso, bazalaki mpe kosalela sinagoga lokola eteyelo, oyo mbala mingi ezalaki kaka na ndako wana. Tómeka naino komona na makanisi ndako oyo etondi na bayekoli oyo bazali bilenge bazali koyekola kotánga balɛtrɛ ya minene oyo molakisi akomi na mwa tablo. Biteyelo ya ndenge wana ezalaki na ntina mingi, yango wana Bayuda mingi bayebaki kotánga, ata bato mpamba bamesanaki na Makomami.

Kasi, ntina mpenza ya sinagoga ezalaki mpo bato básambelaka. Yango wana, tokoki kokamwa te ete makita ya bakristo ya ekeke ya liboso ezalaki na makambo mingi oyo ekokanaki na makita oyo Bayuda bazalaki kosala na sinagoga. Na makita ya bokristo, mokano ezalaki mpe ya kosambela Yehova na nzela ya libondeli, banzembo ya masanzoli, kotánga mpe kolimbola Liloba ya Nzambe. Kokokana yango esukaki kaka na ntango wana te. Na bisika yango mibale ya losambo, makambo oyo bazalaki na yango bosɛnga mpe mosolo oyo bazalaki kosalela, ezalaki kouta na makabo ya bolingo malamu, libaku ya kotánga mpe kolimbola Liloba ya Nzambe esukaki kaka na bakonzi ya mangomba te; kasi, ezala epai ya Bayuda to bakristo ya ekeke ya liboso, bankulutu bazalaki na mokumba ya kobongisa mpe kotambwisa makita.

Batatoli ya Yehova lelo oyo, basalaka makasi mpo na kolanda mpenza ndakisa wana oyo Yesu mpe bayekoli na ye ya ekeke ya liboso batiká. Na yango, makita oyo esalemaka na Bandako ya Bokonzi ezali na makambo mingi oyo ekokani na makita oyo ezalaki kosalema na basinagoga ya Bayuda. Na nyonso, Batatoli bayanganaka na mokano kaka wana oyo bato oyo balingaka solo bazalaka na yango ntango nyonso​—‘kopusana penepene na Nzambe.’​—Yakobo 4:8.

[Bililingi na nkasa 16, 17]

Ndako oyo etongamaki lisusu na kolanda ndenge sinagoga ya Gamala ya ekeke ya liboso etongamaki

[Elilingi na lokasa 18]

Biteyelo ya sinagoga ezalaki kotángisa bana mibali kobanda na mbula soki 6 tii 13

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto