Basi, mpo na nini kotosa bokonzi?
“Mokonzi ya mwasi ezali mobali.”—1 KO. 11:3.
1, 2. (a) Paulo akomaki nini mpo na ebongiseli ya Yehova na oyo etali bokonzi mpe kotosa? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?
YEHOVA nde atyá ebongiseli ya bokonzi oyo ntoma Paulo alobelaki ntango akomaki ete “mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo” mpe “mokonzi ya Kristo ezali Nzambe.” (1 Ko. 11:3) Lisolo oyo eleki emonisaki ete Yesu azalaki komona ete ezalaki libaku malamu mpe esengo kotosa mokonzi na ye, Yehova Nzambe, mpe ete Kristo azali mokonzi ya mibali bakristo. Kristo azalaki na boboto, motema mawa, mpe azalaki koluka kaka matomba na ye moko te na ndenge na ye ya kosalela bato makambo. Mibali na lisangá basengeli kosalelaka mpe basusu bongo, mingimingi basi na bango.
2 Kasi, ezali boni mpo na basi? Nani azali mokonzi na bango? Paulo akomaki ete “mokonzi ya mwasi ezali mobali.” Ndenge nini basi basengeli kotalela maloba wana oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe? Mwasi asengeli kotosa etinda yango ata soki mobali na ye azali motatoli te? Kotosa bokonzi ya mobali elimboli nde ete mwasi asengeli kokanga monɔkɔ, azalaka ata na likambo ya koloba te ntango bikateli ezali kozwama na libala? Ndenge nini mwasi akoki kosala mpo mobali na ye apesa ye lokumu?
“Nakosalela ye mosungi”
3, 4. Mpo na nini ebongiseli ya bokonzi ezali na ntina na libala?
3 Nzambe nde atyá ebongiseli ya bokonzi. Nsima ya kokela Adama, Yehova Nzambe alobaki boye: “Ezali malamu te moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi, oyo abongi na ye.” Nsima ya kozalisama ya Eva, Adama asepelaki mingi kozala na moninga mpe mosungi, yango wana alobaki boye: “Aa! sikoyo, oyo nde mokuwa ya mikuwa na ngai mpe mosuni ya mosuni na ngai.” (Eba. 2:18-24) Adama ná Eva bazalaki na libaku ya kozala baboti ya lolenge nyonso ya bato ya kokoka, oyo basengelaki kofanda libela na libela na esengo na paradiso awa na mabele.
4 Bomoi ya kokoka oyo baboti na biso bazalaki na yango na elanga ya Edene ebungaki mpo na botomboki na bango. (Tángá Baroma 5:12.) Kasi, ebongiseli ya bokonzi etikalaki. Ntango babalani bazali kolanda ebongiseli yango malamumalamu, ememaka matomba mpe esengo na libala. Bayokaka ndenge Yesu ayokaki na ndenge azalaki kotosa Yehova, Mokonzi na ye. Liboso aya awa na mabele, Yesu azalaki “kosepela liboso na [Yehova] ntango nyonso.” (Mas. 8:30) Mpo na kozanga kokoka, mibali bakokaka lisusu te kozala bakonzi ya kokoka, basi mpe bakokaka te komonisa botosi na ndenge ya kokoka. Ntango mibali mpe basi bazali kokoba kosala oyo bakoki na likambo yango, ebongiseli yango ememaka esengo monene na libala lelo oyo.
5. Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli kolanda toli oyo ezali na Baroma 12:10?
5 Likambo ya ntina mpo libala elonga ezali ete balongani básalela toli oyo ebongi mpo na bakristo nyonso: “Na bolingo ya bondeko bólinganaka na motema. Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.” (Rom. 12:10) Lisusu, mwasi ná mobali basengeli kosala makasi mpo ‘bázala na boboto na kati na bango, báyokelanaka mpenza mawa, bálimbisanaka na motema moko.’—Ef. 4:32.
Ntango molongani azali Motatoli te
6, 7. Litomba nini ekoki komonana soki mwasi mokristo azali kotosa bokonzi ya mobali na ye oyo azali Motatoli te?
6 Ezali boni soki molongani na yo azali mosaleli ya Yehova te? Mbala mingi, mobali nde azalaka Motatoli te. Na ntango yango, ndenge nini mwasi asengeli kosalelaka ye makambo? Biblia epesi eyano oyo: “Bino basi, bómikitisaka liboso ya mibali na bino moko, mpo, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama na maloba te kasi na etamboli ya basi na bango, mpo bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto ná limemya na bino makasi.”—1 Pe. 3:1, 2.
7 Liloba ya Nzambe eyebisi mwasi azalaka na botosi epai ya mobali na ye oyo azali Motatoli te. Etamboli na ye ya malamu ekoki kotinda mobali na ye aluka koyeba nini etindaka mwasi na ye azalaka na bizaleli ya malamu ndenge wana. Mpo na yango, mobali akoki koluka koyeba mateya oyo mwasi na ye alandaka mpe nsukansuka akoki kondima solo.
8, 9. Mwasi mokristo akoki kosala nini soki etamboli na ye ya malamu ezali te kobongola mobali na ye?
8 Kasi, ezali boni soki mobali yango azali kobongwana te? Makomami elendisi mwasi mokristo amonisaka ntango nyonso bizaleli ya bokristo, ata soki ezali mpasi kosala bongo. Na ndakisa, tozali kotánga na 1 Bakorinti 13:4 ete: “Bolingo ezali na motema molai.” Ekozala malamu mwasi mokristo akoba komitambwisa “na elimo mpenza ya komikitisa mpe na boboto, na motema molai,” amonisaka bolingo. (Ef. 4:2) Na lisalisi ya nguya ya Nzambe—elimo santu na ye—likoki ezali ya kobatela bizaleli ya bokristo ata na ntango ya mikakatano.
9 Paulo akomaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Flp. 4:13) Elimo ya Nzambe esalisaka molongani oyo azali mokristo asala makambo mingi oyo akoki kosala yango te na makasi na ye moko. Na ndakisa, ntango molongani azali konyokola yo, yango ekoki kotinda yo oluka kozongisela ye mabe. Kasi, Biblia eyebisi bakristo nyonso ete: “Bózongisela moto mabe na mabe te. . . . mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe, Yehova alobi bongo.’” (Rom. 12:17-19) Ndenge moko, 1 Batesaloniki 5:15 epesi biso toli oyo: “Bókeba ete moto azongisa mabe na moto mosusu te, kasi ntango nyonso bino na bino bólanda kosalelana oyo ezali malamu; bósalaka yango mpe epai ya bato mosusu nyonso.” Na lisalisi ya elimo santu ya Yehova, likambo oyo ekoki komonana ete tokokoka te kosala na makasi na biso moko, tokoki kosala yango. Ebongi mpenza ete tósɛngaka Nzambe elimo santu na ye mpo epesa biso oyo tozangi!
10. Ndenge nini Yesu azalaki kosala ntango basusu bazalaki koloba to kosala ye makambo oyo ezangi boboto?
10 Yesu atikaki ndakisa moko ya malamu na ndenge ya kosalela baoyo bazalaki koloba to kosala makambo oyo ezalaki kosepelisa ye te. Na 1 Petro 2:23, Biblia elobi ete: “Ntango azalaki kofingama, azalaki kozongisa kofinga te. Ntango azalaki konyokwama, azalaki kokanela moto te, kasi azalaki ntango nyonso komitika na mabɔkɔ ya moto oyo asambisaka na bosembo.” Tolendisami ete tólanda ndakisa na ye kitoko. Kosilikaka te mpo na bizaleli mabe ya basusu. Ndenge bakristo nyonso balendisami, zalá ‘moto oyo ayokelaka bamosusu mawa mpenza, moto ya komikitisa, kozongisaka mabe na mabe te to kofinga na kofinga te.’—1 Pe. 3:8, 9.
Basengeli kaka kokanga monɔkɔ?
11. Libaku nini ya monene basi bakristo mosusu bazwi?
11 Kotosa bokonzi ya mobali elimboli ete basi basengeli kokangaka monɔkɔ, bázalaka na liloba ya koloba te na makambo ya libota to na makambo mosusu? Ezali bongo te. Yehova apesá basi mpe mibali mabaku mingi. Kanisá naino libaku monene oyo bato 144 000 bazali na yango ya kozala bakonzi mpe banganga-nzambe na likoló elongo na Kristo ntango akoyangela mabele oyo! Basi mpe bazali na kati ya bato yango. (Gal. 3:26-29) Emonani ete Yehova apesi basi libaku monene na ebongiseli na ye.
12, 13. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete basi basakolaki.
12 Na ndakisa, na ntango ya kala basi basakolaki. Yoele 2:28, 29 esakolaki ete: “Nakosopela bato ya ndenge nyonso elimo na ngai, mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola. . . . Ata mpe basaleli ya mibali mpe basaleli ya basi, nakosopela bango elimo na ngai na mikolo yango.”
13 Na kati ya bayekoli ya Yesu soki 120 oyo bayanganaki na shambre ya likoló na Yerusaleme na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., basi mpe bazalaki. Elimo ya Nzambe ekitelaki etuluku yango mobimba. Na yango, Petro atángaki esakweli ya Yoele mpe asalelaki yango mpo na mibali mpe basi lokola. Petro alobaki ete: “Oyo ezali nde makambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yoele ete: Nzambe alobi boye: ‘Mpe na mikolo ya nsuka, nakosopela bato ya ndenge nyonso ndambo ya elimo na ngai, mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola . . . ; ata mpe baombo na ngai ya mibali mpe baombo na ngai ya basi nakosopela bango ndambo ya elimo na ngai na mikolo wana, mpe bakosakola.’”—Mis. 2:16-18.
14. Mosala nini basi basalaki mpo ete lisangá ya bokristo ya ebandeli ekóma monene?
14 Na ekeke ya liboso, basi basalaki mosala monene mpo lisangá ya bokristo ekóma monene. Basakolaki epai ya basusu makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe basalaki makambo oyo etalelaki mosala yango ya kosakola. (Luka 8:1-3) Na ndakisa, ntoma Paulo abengaki Foebe “mosaleli ya lisangá oyo ezali na Kenkrea.” Mpe ntango atindelaki baninga na ye ya mosala bambote, Paulo atángaki basi mingi ya sembo, na kati na bango “Trifene ná Trifoze, basi oyo bazali kosala mosala makasi na kati ya Nkolo.” Atángaki mpe “Persisi ndeko na biso ya bolingo, mpo asalaki ebele ya misala ya makasi na kati ya Nkolo.”—Rom. 16:1, 12.
15. Mokumba nini basi bazali kokokisa lelo oyo mpo nsango malamu epalangana?
15 Na mikolo na biso, na kati ya bato koleka milio nsambo oyo bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba, basi ya mbula nyonso nde baleki mingi. (Mat. 24:14) Mingi na bango bazali basali ya ntango nyonso, bamisionɛrɛ, mpe basangani ya libota ya Betele. Davidi, mokomi ya nzembo, ayembaki boye: “Yehova ye moko azali kobimisa liloba; basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali limpinga moko monene.” (Nz. 68:11) Maloba wana ezali mpenza solo! Yehova azwaka na motuya mosala monene oyo basi bazali kosala mpo na kosakola nsango malamu mpe kokokisa mikano na ye. Etinda na ye ete basi bakristo bázala na botosi emonisi te ete basengeli kaka kotosaka kozanga koloba.
Basi mibale oyo bakangaki monɔkɔ te
16, 17. Ndenge nini ndakisa ya Sara emonisi ete basi basengeli kaka te kokangaka monɔkɔ na mabala na bango?
16 Soki Yehova apesi basi mabaku mingi, mibali basengeli te kotunaka basi na bango makanisi liboso ya kozwa bikateli ya minene? Bakomonisa bwanya soki basali bongo. Makomami elobeli makambo mingi oyo basi balobaki to basalaki atako mibali na bango batunaki makanisi na bango te. Tótalela ndakisa mibale.
17 Sara, mwasi ya Abrahama, akobaki koyebisa mobali na ye ete abengana mwasi na ye ya mibale ná mwana na ye mpo bazalaki na botosi te. “Likambo yango esepelisaki Abrahama ata moke te,” kasi Nzambe asepelaki na likambo yango. Yehova ayebisaki Abrahama ete: “Likambo moko te na oyo Sara azali se kolobela yo mpo na mwana wana mpe mpo na moombo na yo ezanga kosepelisa yo. Yoká mongongo na ye.” (Eba. 21:8-12) Abrahama atosaki Yehova, ayokelaki Sara, mpe asalaki oyo Sara asɛngaki.
18. Likambo nini Abigaile asalaki?
18 Tózwa mpe ndakisa ya Abigaile, mwasi ya Nabale. Ntango Davidi azalaki kokima Mokonzi Saulo oyo azalaki kokanela ye, alekisaki ntango pene na etonga ya bampate ya Nabale. Na esika azwa ata eloko moko ya moto wana ya bozwi, Davidi mpe bato na ye babatelaki nde biloko ya moto yango. Kasi, Nabale, “azalaki makambo makasimakasi mpe bizaleli mabe,” mpe ‘apamelaki makasi’ bato ya Davidi. Azalaki “moto moko mpamba mpenza,” mpe ‘azalaki na bozoba.’ Ntango bato ya Davidi basɛngaki na limemya nyonso biloko ya kolya, Nabale aboyaki. Abigaile asalaki nini ntango ayokaki likambo yango? Kozanga ete ayebisa Nabale, “asalaki nokinoki mpe azwaki mampa nkama mibale (200), mpe bilokó mibale ya minene ya vinyo, mpe bampate mitano oyo babongisi, mpe sea mitano ya mbuma oyo batumbi, mpe bagato nkama moko (100) ya mbuma ya vinyo, mpe bagato nkama mibale ya figi oyo bafinafiná” mpe apesaki Davidi mpe bato na ye. Abigaile asalaki oyo ezali malamu? Biblia elobi ete: “Yehova abɛtaki Nabale, mpe akufaki.” Na nsima, Davidi abalaki Abigaile.—1 Sa. 25:3, 14-19, 23-25, 38-42.
‘Mwasi oyo azwaka lokumu’
19, 20. Nini esalaka ete mwasi azwa mpenza lokumu?
19 Makomami ekumisi mwasi oyo asalaka makambo ndenge Yehova alingaka. Mokanda ya Masese ekumisi “mwasi oyo akoki,” elobi ete: “Motuya na ye eleki mosika oyo ya mabanga kitoko ya korai. Motema ya nkolo na ye endimelaka ye, mpe litomba ezangaka te. Apesaka mobali na ye mbano ya makambo ya malamu, kasi ya mabe te, mikolo nyonso ya bomoi na ye.” Lisusu, ‘afungolaka monɔkɔ na ye na bwanya, mpe mobeko ya motema boboto ezali na lolemo na ye. Azali kotya likebi na makambo ya bato ya ndako na ye, mpe alyaka limpa ya gɔigɔi te. Bana na ye batɛlɛmi mpe batángi ye moto ya esengo; nkolo na ye azali kotɛlɛma, mpe azali kokumisa ye.’—Mas. 31:10-12, 26-28.
20 Nini esalaka ete mwasi azwa mpenza lokumu? Masese 31:30 elobi ete: “Bonzenga ekoki kokosa, mpe kitoko ekoki kozala mpamba; kasi mwasi oyo abangaka Yehova ye nde azwaka lokumu.” Kotosa na motema moko ebongiseli ya bokonzi ezali na kati ya kobanga Nzambe. “Mokonzi ya mwasi ezali mobali,” kaka ndenge “mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo,” mpe “mokonzi ya Kristo ezali Nzambe.”—1 Ko. 11:3.
Zaláká na botɔndi mpo na likabo ya Nzambe
21, 22. (a) Bantina nini bakristo oyo babalá bazali na yango ya komonisa botɔndi mpo na likabo ya libala? (b) Mpo na nini tosengeli kotosa ebongiseli ya bokonzi oyo Yehova atyá? (Talá etanda na lokasa 17.)
21 Bakristo oyo babalá bazali na bantina mingi ya komonisa botɔndi epai ya Nzambe! Bakoki kosala na bomoko mpo na kozala na esengo na libala na bango. Mingimingi bakoki kozala na botɔndi epai ya Nzambe mpo na likabo ya libala mpamba te epesaka bango libaku ya kokangana mpe kotambola elongo na Yehova. (Ruta 1:9; Mika 6:8) Ye—Mobandisi ya libala—ayebi mpenza nini esɛngami mpo libala ezala na esengo. Bósalaka ntango nyonso makambo ndenge alingaka mpe ‘esengo ya Yehova ekozala esika makasi ya libateli na bino,’ ata na mokili oyo etondi na mobulu.—Neh. 8:10.
22 Mobali mokristo oyo alingaka mwasi na ye ndenge ye moko amilingaka, asalelaka bokonzi na ye na boboto mpe amityaka na esika ya mwasi na ye. Akolinga mpenza mwasi na ye oyo abangaka Nzambe, mpo asungaka ye mpe amoniselaka ye botosi mozindo. Na nyonso, ndakisa na bango na libala ekokumisa Yehova Nzambe na biso oyo abongi kosanzolama.
Ozali koyeba lisusu?
• Ebongiseli ya Yehova mpo na bokonzi mpe kotosa ezali nini?
• Mpo na nini babalani basengeli kopesanaka lokumu?
• Ndenge nini mwasi mokristo asengeli kosalelaka mobali na ye oyo azali Motatoli te makambo?
• Mpo na nini mibali basengeli kotunaka makanisi ya basi na bango liboso ya kozwa bikateli ya minene?
[Etanda na lokasa 17]
Mpo na nini kotosa bokonzi?
Yehova atyá ebongiseli ya bokonzi na kati ya bikelamu na ye. Asalá yango mpo na bolamu ya bikelamu na ye ya elimo mpe bato. Epesaka bango mabaku ya kosalela bonsomi na bango ya kopona mpe kokumisa Nzambe na kosalela ye na bomoko.—Nz. 133:1.
Lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, endimaka bokonzi ya Yesu Kristo. (Ef. 1:22, 23) Mpo na kondima bokonzi ya Yehova, nsukansuka “Mwana ye moko mpe akomitya na nse ya Moto oyo atyaki biloko nyonso na nse na ye, mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.” (1 Ko. 15:27, 28) Na yango, ebongi mpenza ete bato oyo bamipesá na Nzambe básala elongo na ebongiseli ya bokonzi na lisangá mpe na libota! (1 Ko. 11:3; Ebr. 13:17) Soki tosali bongo, tokondimama na Yehova mpe tokozwa matomba.—Yis. 48:17.
[Elilingi na lokasa 13]
Libondeli ekoki kosalisa mwasi mokristo amonisaka bizaleli ya Nzambe
[Bililingi na lokasa 15]
Yehova azwaka na motuya mosala oyo basi basalaka mpo na kotombola matomba ya Bokonzi