Ndenge ya koteya bana makambo ya Nzambe—Mayele nini esimbaka mpenza?
“Maloba oyo nazali kopesa yo mitindo lelo esengeli kozala na motema na yo; mpe osengeli kokɔtisa yango malamumalamu na kati ya mwana na yo mpe kolobela yango ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala mpe ntango okolala mpe ntango okolamuka.”—KOLIMBOLA MIBEKO 6:6, 7.
NTANGO mosusu baboti bakoki komona ete mokumba ya koteya bana eleki bango motó. Nzokande, soki baluki toli, makanisi ndenge na ndenge oyo bakozwa ekoki kobulunganisa lisusu koleka. Mbala mingi, bandeko mpe baninga balingaka kopesa makanisi na bango. Babuku, bazulunalo, mpe Internet etondi na batoli mpo na baboti, oyo ntango mosusu ezali bongolabongola.
Nzokande, Biblia epesaka baboti toli oyo ebongi na oyo etali makambo ya koteya bana mpe litambwisi oyo ebongi na ndenge ya koteya bango. Ndenge bavɛrsɛ oyo totángi na ebandeli emonisi yango, baboti basengeli kokanisa ndenge ya koyebisa bana na bango makambo ya Nzambe mokolo na mokolo. Makanisi minei oyo euti na Biblia, oyo ezali awa na nse, esalisi baboti mingi báteya bana na bango makambo ya Nzambe.
1. Bómonisaka mateya oyo tokoki kozwa na biloko oyo Nzambe akelá. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bizaleli [ya Nzambe] oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye.” (Baroma 1:20) Baboti bakoki kosalisa bana na bango bámona ete Nzambe azali mpenza soki bazali kobenda likebi na bango na biloko oyo Nzambe akelá mpe na ndenge yango, kosalisa bango básosola bizaleli nini ya Nzambe biloko yango emonisaka.
Yesu asalelaki mayele wana ntango azalaki koteya bayekoli na ye. Na ndakisa, alobaki ete: “Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló, mpamba te balonaka te mpe babukaka te mpe bayanganisaka te na ndako ya kobomba biloko; nzokande Tata na bino ya likoló aleisaka bango. Bino boleki bango na motuya te?” (Matai 6:26) Awa, Yesu amonisaki polele bizaleli mibale ya Yehova; bolingo mpe motema mawa. Kasi, asukaki wana te. Asalisaki bayekoli na ye bákanisa na ndenge oyo Nzambe amonisaki basaleli na ye bizaleli yango.
Mokonzi Salomo alobelaki mayele ya lɔɔmbi oyo Nzambe apesá bafurmi, mpe asalelaki mwa bikelamu yango mpo na kopesa toli moko ya ntina mpenza. Akomaki boye: “Kende epai ya furmi, yo moto ya gɔigɔi; talá banzela na yango mpe kómá moto ya bwanya. Atako ezalaka na komanda te, kapita te to moyangeli te, elɛngɛlaka bilei na yango na eleko ya molunge; eyanganisi biloko na yango ya kolya na ntango ya kobuka mbuma.” (Masese 6:6-8) Ezali mpenza lolenge malamu ya koteya ntina ya komityela mikano oyo ebongi mpe kosalela makasi oyo Nzambe apesá biso mpo na kokokisa yango!
Baboti bakoki komekola mayele ya koteya ya Yesu mpe ya Salomo soki bazali kosala makambo oyo: (1) Kotuna bana na bango nzete to nyama nini basepelaka na yango. (2) Koyekola makambo mingi oyo etali nzete to nyama yango. (3) Komonisa makambo oyo biloko yango ekoki koteya biso mpo na Nzambe.
2. Bólanda ezaleli oyo Yesu amonisaki epai ya bato oyo azalaki koteya. Na bato nyonso oyo baleká na mokili, Yesu nde azalaki na makambo ya koloba oyo eleki ntina. Atako bongo, azalaki kozwa ntango mingi ya kotuna mituna. Azalaki mpenza kotya likebi na makanisi ya bato oyo azalaki koteya mpe na ndenge oyo bazalaki koyoka. (Matai 17:24, 25; Marko 8:27-29) Ndenge moko mpe, baboti bazali na makambo mingi ya ntina ya koteya bana. Na yango, mpo bálonga, basengeli kolanda ndakisa ya Yesu mpe kolendisa bana na bango bámonisaka polele makanisi na bango.
Kasi, basengeli kosala nini soki bana bamonisi ezaleli ya mabe to basaleli noki te likambo moko ya ntina oyo bateyaki bango? Talelá lolenge oyo Yesu asalaki epai ya bantoma na ye. Na ntango mosusu, bantoma bazalaki kowelana makasi mpe bayekolaki noki te ezaleli ya komikitisa. Kasi, Yesu azalaki kaka motema molai mpe azalaki kolobela ntango nyonso ntina ya kozala na komikitisa. (Marko 9:33, 34; Luka 9:46-48; 22:24, 25) Baboti oyo balingi kolanda ndakisa ya Yesu basengeli kolɛmba te kosembola bana na bango, mpe soki esengeli, kozongela likambo moko tii ntango bana bakokanga mpenza ntina na yango.a
3. Ndakisa na bino nde eteya. Ebongi baboti bálanda toli oyo ntoma Paulo apesaki bakristo ya Roma. Akomelaki bango boye: “Yo moto oteyaka moto mosusu, omiteyaka yo moko te? Yo, moto osakolaka ete: ‘Koyiba te,’ oyibaka?”—Baroma 2:21.
Toli wana ebongi mpenza, mpamba te bana balandaka mingi makambo oyo baboti basalaka, na esika ya makambo oyo balobaka. Ya solo, baboti oyo basalelaka makambo oyo bateyaka, mbala mingi bana na bango mpe bayokaka mateya na bango.
4. Bóbanda ntango mwana azali naino moke. Timote, moninga ya Paulo na mosala ya misionɛrɛ azalaki na lokumu malamu mpenza na mboka oyo akolaki. (Misala 16:1, 2) Ntina moko ezali ete “banda bomwana” bateyaki ye “makomi mosantu.” Mama ya Timote ná nkɔkɔ na ye ya mwasi bazalaki kotángela ye Makomami, kasi bazalaki mpe kosalisa ye akanisa na makambo oyo ezali na makomi yango.—2 Timote 1:5; 3:14, 15.
Esika oyo bokoki kozwa lisalisi
Batatoli ya Yehova babimisaka ebele ya mikanda oyo ekoki mpenza kosalisa baboti báteya bana na bango makambo ya Nzambe. Mikanda mosusu ebongi mpenza mpo na bilenge. Mosusu ekoki kosalisa baboti básololaka malamu na bana na bango oyo bazali bilenge.b
Na ntembe te, liboso baboti bákoka koteya bana na bango makambo ya Nzambe, esengeli bango moko báyeba biyano na mwa mituna ya makasi oyo bana bakoki kotuna. Na ndakisa, okopesa eyano nini soki batuni yo motuna lokola oyo: Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala? Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini? Moto akendaka wana soki akufi? Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa bino bozwa biyano na mituna yango mpe mituna mosusu, mpo bino moko ná bana na bino bópusana penepene na Nzambe.—Yakobo 4:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “kokɔtisa” na Kolimbola Mibeko 6:7 ezali kopesa likanisi ya kozongela likanisi moko mbala na mbala.
b Mpo na bana ya mike, baboti bakoki kosalela buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, oyo elobeli mateya ya Yesu Kristo, to Mokanda mpo na masolo ya Biblia, oyo ebɛti masolo ya Biblia na elobeli ya pɛtɛɛ. Mpo na bilenge, baboti bakoki kosalela buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1 mpe Volimi 2.