Pápa azali nde “mokitani ya Santu Petro”?
NA MOBU 2002, Pápa Jean-Paul II akomelaki episkɔpɔ ya engumba Limbourg, na Allemagne, mokanda moko oyo eboyaki ekateli ya episkɔpɔ yango ya kondima ete basi bálongolaka zemi. Na ebandeli ya mokanda na ye, pápa amonisaki ete ye nde azali na mokumba ya kobatela “bolamu mpe bomoko ya bato nyonso ya lingomba na kolanda mokano ya Yesu Kristo.” Alobaki ete lokola azali pápa, azali “mokitani ya Santu Petro,” yango wana azali na bokonzi ya kolongola ekateli oyo episkɔpɔ azwi.
Lingomba ya Katolike eteyaka ete: “Kristo atyaki Santu Petro mokonzi ya bantoma nyonso.” Lingomba ya Katolike eteyaka mpe ete “Kristo abongisaki ete bato mosusu bakitanaka mokumba monene oyo apesaki Petro; mpe ete bakitani yango ezali nde baepiskɔpɔ ya Roma.”—buku New Catholic Encyclopedia (2003), volimi 11, nkasa 495-496.
Koloba bongo ezali likambo moke te. Osilá koluka koyeba yo moko soki ezali mpenza bongo? Talelá biyano na mituna oyo misato: (1) Biblia eteyaka ete Petro azalaki pápa ya liboso? (2) Kokitana ya bapápa ebandá ndenge nini? (3) Bizaleli mpe mateya ya bapápa emonisaka mpenza ete bazali bakitani ya Petro?
Petro azalaki pápa ya liboso?
Mpo na kondimisa ete lingomba etongami likoló ya Petro, banda kala Bakatolike basalelaka maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 16:18 ete: “Yo ozali Petro, mpe na libanga oyo nakotonga lisangá na ngai.” Kutu, maloba yango ekomamá na Latin na kati ya Ndako-nzambe monene Saint-Pierre, na Rome.
Augustin, moko ya bakonzi ya liboso ya Lingomba ya Katolike, azalaká koteya liboso ete lingomba etongami likoló ya Petro. Kasi, na nsuka ya bomoi na ye, abongolaki makanisi na ye mpo na ndimbola ya maloba ya Yesu. Na buku na ye moko (Retractations), Augustin alobaki ete lingomba ya bokristo etongamaki nde likoló ya Yesu, kasi likoló ya Petro te.a
Ya solo, Petro alobelami mingi na Baevanzile. Yesu aponaki kaka bantoma misato: Yoane, Yakobo, ná Petro, bázala na ye ntango asalaki makambo mosusu. (Marko 5:37, 38; 9:2; 14:33) Yesu apesaki Petro “bafungola ya bokonzi ya likoló” mpo na kofungola nzela na Bokonzi, liboso epai ya Bayuda ná Baprozelite, na nsima epai ya Basamaria, mpe na nsuka epai ya bato ya bikólo mosusu. (Matai 16:19; Misala 2:5, 41; 8:14-17; 10:45) Lokola Petro azalaki mobali ya mpiko, na bantango mosusu azalaki molobeli ya bantoma nyonso. (Misala 1:15; 2:14) Kasi, makambo yango emonisi ete Petro azalaki mokonzi ya lisangá ya bokristo?
Ntoma Paulo akomaki ete bapesaki Petro mokumba ya kozala “ntoma ya bato oyo bakatamá ngenga.” (Bagalatia 2:8) Kasi, ndenge oyo Paulo alobi maloba yango emonisi ete alobaki te ete Petro azalaki kokamba lisangá. Maloba ya Paulo etalelaki mokumba oyo Petro azwaki ya kosakwela Bayuda.
Atako Petro azwaki mokumba monene, tokokuta esika moko te na Biblia alobi ete azali mokonzi ya lisangá mpe azali kozwa bikateli mpo na bantoma nyonso. Na mokanda na ye, amibengaki “ntoma” mpe “nkulutu”—abakisaki likambo mosusu te.—1 Petro 1:1; 5:1.
Kokitana ya bapápa ebandá ndenge nini?
Ntango nini mpe ndenge nini likanisi ya kopona bapápa ebandaki? Likanisi ya koloba ete ezali mabe te moto moko aluka kozala mokonzi ya baninga na ye bandimi ebandaki mokemoke ntango bantoma bazalaki naino na bomoi. Bantoma batalelaki likanisi yango ndenge nini?
Ntoma Petro ye moko alobaki na mibali oyo bazalaki kokamba lisangá ete ‘bámikómisa te bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe’; basengelaki kozala na komikitisa. (1 Petro 5:1-5) Ntoma Paulo akebisaki ete na kati ya lisangá, mibali bakobima, baoyo “bakoloba makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Misala 20:30) Na nsuka ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, ntoma Yoane akomaki mokanda moko oyo amonisaki polele mabe ya moyekoli moko na nkombo Diotrefese. Mpo na nini apamelaki ye? Moko ya bantina ezali ete mobali yango ‘alingaki kozwa esika ya liboso’ na kati ya lisangá. (3 Yoane 9) Toli wana ya bantoma epekisaki mpo na mwa ntango, mposa ya bato oyo bazalaki koluka lokumu.—2 Batesaloniki 2:3-8.
Mwa moke nsima ya liwa ya ntoma ya nsuka, bato mosusu babandaki koluka kokóma na lokumu mingi. Buku moko (The Cambridge History of Christianity) elobi ete: “Na ntembe te, episkɔpɔ moko te azalaki ‘mokonzi’ na Roma liboso ete siɛklɛ ya mibale ekóma na katikati.” Na siɛklɛ ya misato, episkɔpɔ ya Roma amikómisaki mokonzi monene na eteni moko ya lingomba.b Mpo na kondimisa ete episkɔpɔ ya Roma azalaki na bokonzi monene, bato mosusu bapesaki bankombo ya bakitani ya Petro.
Nzokande, ezali na bilembeteli te oyo endimisi likambo yango. Mpo na nini? Ya liboso, likoki ezali te mpo na koyeba soki bankombo mosusu ezali ya bato oyo bazalaki mpenza. Oyo eleki ntina, ndenge oyo bankombo yango ekomami ezali na mbeba mingi. Mpo na nini bongo? Ata soki Petro asakolaki na Roma, ndenge mikanda mosusu ya siɛklɛ ya liboso mpe ya mibale elobi, elembeteli ata moko te emonisi ete azalaki mokonzi ya lisangá ya engumba yango.
Likambo oyo emonisi ete Petro azalaki mokonzi ya lisangá ya Roma te ezali ete ntango ntoma Paulo akomelaki Baroma mokanda, atángaki bankombo ya bakristo ebele oyo bazalaki kuna. Kasi, atángaki nkombo ya Petro te. (Baroma 16:1-23) Soki Petro azalaki mokonzi ya lisangá, Paulo alingaki nde kobosana kotánga nkombo na ye?
Simbá mpe ete na eleko oyo Petro akomaki mokanda na ye ya liboso, Paulo mpe akomaki mokanda ya mibale epai ya Timote. Na mokanda yango, Paulo atángaki polele engumba Roma. Kutu, Paulo akomaki mikanda motoba na Roma; nzokande, atángi nkombo ya Petro te na mikanda yango nyonso.
Ntango Paulo asilisaki kokoma mikanda na ye, mbula 30 na nsima, ntoma Yoane akomaki mikanda misato mpe mokanda ya Emoniseli. Esika moko te na mikanda yango Yoane alobi ete lisangá oyo ezalaki na Roma elekaki masangá nyonso, to alobelaki mokonzi ya lingomba oyo azalaki na bokonzi nyonso, oyo azalaki mokitani ya Petro. Biblia to masolo ya kala emonisi te ete Petro amikómisaki episkɔpɔ ya liboso ya lisangá ya Roma.
Bizaleli mpe mateya ya bapápa emonisi mpenza ete bazali bakitani ya Petro?
Ekozala malamu mpenza ete moto oyo azali komibenga “mokitani ya Santu Petro” mpe “momonisi ya Kristo” alanda bizaleli mpe mateya na bango. Na ndakisa, Petro andimaki ete baninga na ye bandimi básalela ye makambo lokola mokonzi? Te. Aboyaki bápesa ye lokumu. (Misala 10:25, 26) Bongo Yesu? Alobaki ete ayaki mpo na kosalela basusu, kasi te mpo básalela ye. (Matai 20:28) Nzokande, eyebani ete bapápa basalaka nini? Baboyaka lokumu, batitre ya mineneminene, mpe baboyaka kolakisa bozwi mpe nguya na bango?
Petro mpe Yesu bazalaki sembo mpe bazalaki koluka kimya. Talá bokeseni oyo ezali kati na makambo oyo basalá mpe oyo buku moko ya Katolike (Lexikon für Theologie und Kirche) elobi mpo na Pápa Léon X: “Lokola azalaki kokɔta na politiki mpe kosalela bokonzi na ye mpo na matomba ya bandeko mpe baninga na ye mpe amipesaki na bisengo ya mokili, Léon X abosanaki mikumba na ye na lingomba.” Sango Karl Amon, oyo azali profesɛrɛ ya istware ya lingomba, alobi ete masolo ya solosolo mpo na Pápa Alexandre VI emonisi ete “azalaki mpenza moto ya makambo mabe, azalaki kosalela bokonzi na ye mabe, kopesa bato bokonzi na lingomba mpo na mbongo mpe kosala pite.”
Ezali boni mpo na mateya ya bapápa? Ekokani na mateya ya Petro ná Kristo? Petro ateyaki te ete bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló. Ntango atángaki Mokonzi Davidi, alobaki polele ete: “Davidi amataki na likoló te.” (Misala 2:34) Lisusu, Petro ateyaki te ete esengeli kobatisa bana oyo babotami sika. Kutu, ateyaki nde ete batisimo ezali ekateli oyo mondimi azwaka yango na lisosoli na ye moko.—1 Petro 3:21.
Yesu ateyaki ete moyekoli na ye ata moko te asengeli koluka kozwa esika ya liboso. Alobaki boye: “Soki moto alingi kozala moto ya liboso, asengeli kozala moto ya nsuka ya bato nyonso mpe mosaleli ya bato nyonso.” (Marko 9:35) Mwa moke liboso ya liwa na ye, Yesu apesaki malako oyo ya polele epai ya bayekoli na ye: “Bóbengama Rabi te, mpo moto moko kaka nde azali moteyi na bino, kasi bino nyonso bozali bandeko. Lisusu, bóbenga moto moko te tata na bino awa na mabele, mpo moto moko kaka nde azali Tata na bino, Oyo azali na likoló. Bóbengama mpe te ‘bakambi,’ mpo Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo.” (Matai 23:1, 8-10) Omoni mpenza ete bapápa balandi mateya ya Petro mpe ya Kristo?
Bato mosusu balobaka esengeli kaka bapápa bakitanaka ata soki moko na bango asali makambo oyo ebongi na mokristo te. Okanisi ete makanisi wana ebongi mpenza? Yesu alobaki ete: “Nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu, kasi nzete nyonso ya mabe ebotaka mbuma ya mabe; nzete ya malamu ekoki kobota mbuma ya mabe te, nzete ya mabe mpe ekoki kobota mbuma ya malamu te.” Okanisi ete Petro to Kristo bakondima ete bapápa bábengama bakitani na bango soki totali makambo oyo basalaka?—Matai 7:17, 18, 21-23.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisolo ya Yesu ná Petro ezalaki mpenzampenza mpo na koyeba Kristo mpe mokumba na ye, kasi te mokumba oyo Petro akokokisa. (Matai 16:13-17) Petro ye moko akomaki na nsima ete Yesu azali libanga oyo lisangá ya bokristo etongami likoló na yango. (1 Petro 2:4-8) Ntoma Paulo mpe amonisaki ete Yesu nde azali “libanga ya litumu ya moboko ya ndako,” oyo likoló na yango lisangá etongami, kasi Petro te.—Baefese 2:20.
b Yesu ná bantoma na ye bakebisaki ete lisangá ya bokristo ekobebisama na mibali oyo bakoteya mateya ya lipɛngwi. (Matai 13:24-30, 36-43; 2 Timote 4:3; 2 Petro 2:1; 1 Yoane 2:18) Maloba wana ekokisamaki ntango lingomba, to lisangá ya siɛklɛ ya mibale, ebandaki kondima mimeseno ya bapakano mpe kosangisa mateya ya Biblia ná filozofi ya Bagrɛki.
[Bililingi na lokasa 25]
Makambo oyo bapápa bazali kosala emonisaka ete balandaka ndakisa ya Petro?