Yekolá na Liloba ya Nzambe
Ndenge nini tokoki kopona baninga ya malamu?
Lisolo oyo ebimisi mituna oyo omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kolobela biyano yango elongo na yo.
1. Mpo na nini tosengeli kopona baninga na biso malamu?
Moto nyonso alingaka ete básepela na ye. Mbala mingi, mposa yango etindaka biso tómekola bato oyo tozalaka na bango. Na yango, baninga na biso bakoki kobongisa to kobebisa makanisi ya motema na biso. Yango wana, baninga oyo toponaka bakoki kosala ete tózala bato ya mabe to ya malamu.—Tángá Masese 4:23; 13:20.
Davidi, moko ya bakomi ya Biblia, aponaki baninga na ye malamu mpenza. Azalaki moninga ya bato oyo basalisaki ye atikala mosaleli ya sembo ya Nzambe. (Nzembo 26:4, 5, 11, 12) Na ndakisa, Davidi azalaki moninga ya Yonatana mpo Yonatana alendisaki ye atyela Yehova motema.—Tángá 1 Samwele 23:16-18.
2. Ndenge nini okoki kokóma moninga ya Nzambe?
Atako Yehova azali na nguya nyonso, tokoki kokóma baninga na ye. Na ndakisa, Abrahama akómaki moninga ya Nzambe. Abrahama atyelaki Yehova motema mpe atosaki ye; yango wana, Yehova abengaki ye moninga na ye. (Ebandeli 22:2, 9-12; Yakobo 2:21-23) Soki totyeli Yehova motema mpe tozali kosala oyo azali kosɛnga biso, biso mpe tokoki kokóma baninga na ye.—Tángá Nzembo 15:1, 2.
3. Wapi matomba ya kozala na baninga ya malamu?
Baninga ya solo bazalaka sembo mpe basalisaka moto asala oyo ezali malamu. (Masese 17:17; 18:24) Na ndakisa, atako Yonatana azalaki mokóló ya Davidi ya mbula 30, mpe ye nde moto akokaki kokóma mokonzi ya Yisraele, Yonatana apesaki Davidi mabɔkɔ mpo Nzambe aponaki ye azala mokonzi. Baninga ya solo babangaka te kosembola moto soki bamoni ete azali kosala makambo ya mabe. (Nzembo 141:5) Baninga oyo balingaka Nzambe, basalisaka moto akóma na bizaleli ya malamu.—Tángá 1 Bakorinti 15:33.
Soki olingaka makambo ya malamu, okoki kokutana na bato oyo balingaka makambo yango na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Kuna okozwa baninga oyo bakolendisa yo osepelisa Nzambe.—Tángá Baebre 10:24, 25.
Nzokande, ata baninga oyo balingaka Nzambe bakoki kosala likambo oyo tosepeli na yango te. Kotika te ete mabunga na bango esilikisa yo noki. (Mosakoli 7:9, 20-22) Kobosana te ete moninga moko te azali moto ya kokoka mpe baninga oyo balingaka Nzambe bazali na ntina mingi. Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso tólandelaka te mabunga ya bandeko na biso bakristo.—Tángá Bakolose 3:13.
4. Osengeli kosala nini soki baninga bazali kotɛmɛla yo?
Bato mingi bamonaka ete ntango babandi koyekola Biblia, baninga na bango mosusu batɛmɛlaka bango. Ekoki kozala ete baninga yango bayebaka te ete Biblia ezali na batoli ya ntina mpe epesaka elikya ya solosolo. Mbala mosusu okoki kosalisa baninga yango.—Tángá Bakolose 4:6.
Kasi, ntango mosusu baninga bakoki kotyola nsango malamu ya Liloba ya Nzambe. (2 Petro 3:3, 4) Bamosusu bakoki kosɛka yo ntango ozali kosala makasi osala makambo ya malamu. (1 Petro 4:4) Soki okutani na likambo yango, mbala mosusu ekosɛnga opona kotikala moninga na bango to kokóma moninga ya Nzambe. Soki oponi kozala moninga ya Nzambe, okozwa moninga oyo aleki malamu mpenza.—Tángá Yakobo 4:4, 8.
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 12 mpe 19 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.