Pusaná penepene na Nzambe
Yehova ayinaka kozanga bosembo
“MOTO ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Maloba wana, oyo ekomamá eleki sikoyo mbula soki 3 000, emonisi mpenza ndenge mokili oyo tofandi ezali. Bato bazalaka na ezaleli ya kosalela bokonzi na bango na ndenge ya mabe, ata soki bazali ndenge nini to bafandi epai wapi. Mbala mingi bango nyonso banyokolaka bato oyo bazangi moto ya kosunga bango mpe babola. Yehova ayokaka ndenge nini na makambo ya ndenge wana? Tokozwa eyano na Ezekiele 22:6, 7, 31.—Tángá.
Na Mibeko oyo apesaki Bayisraele, Yehova amonisaki polele ete baoyo bazali na bokonzi basengeli te kosalela bokonzi na bango na ndenge ya mabe. Alingaki kopambola ekólo yango kaka soki bakambi na yango bazalaki kosalela bato mpamba mpe babola makambo na boboto mpe kotyela bango likebi. (Kolimbola Mibeko 27:19; 28:15, 45) Na eleko ya Ezekiele, na Yerusaleme mpe na Yuda, bankumu bazalaki kosalela bokonzi na bango na ndenge moko ya mabe mpenza. Makambo nini bazalaki kosala?
Bankumu bazalaki kotika ete ‘lobɔkɔ na bango emema bango na kosopa makila.’ (Vɛrsɛ 6) Liloba “lobɔkɔ” elimboli nguya to bokonzi. Libongoli mosusu elobi boye: “Bato minene ya . . . Yisraele bazali kosalela bokonzi na bango mpo na kotangisa makila.” Ndenge nini bosembo ekokaki kozala ntango bankumu oyo basengelaki kobatela yango mpe kosala ete bato bátosa Mibeko, bazalaki kosalela bokonzi na bango na ndenge ya mabe mpe koboma bato oyo basali ata mabe moko te?
Nsima ya koloba maloba wana, emonani ete Ezekiele alobeli kaka te bankumu kasi mpe baoyo bazalaki kolanda bango na kobuka Mibeko ya Yehova. Ezekiele alobi boye: “Batyoli tata ná mama.” (Vɛrsɛ 7) Lokola batyolaki bokonzi oyo Yehova apesaki baboti, bato yango babebisaki libota—eloko oyo ezalaki kosala ete ekólo na bango ezala makasi.—Kobima 20:12.
Bato mabe bazalaki kobuba babola. Likambo nyonso ya mabe oyo bazalaki kosala, ezalaki komonisa ete balingi te Mibeko oyo Nzambe apesaki bango, oyo esɛngaki kolinga basusu. Na ndakisa, Mibeko ya Nzambe esɛngaki ete Bayisraele básalela bapaya oyo bafandi elongo na bango makambo na boboto. (Kobima 22:21; 23:9; Balevi 19:33, 34) Kasi Bayisraele ‘bazalaki kobuba’ bapaya oyo bafandaki elongo na bango.—Vɛrsɛ 7.
Bazalaki mpe konyokola baoyo bazangaki bato ya kobatela bango—“mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá.” (Vɛrsɛ 7) Yehova amibanzabanzaka mingi na bamposa ya baoyo baboti to balongani na bango bakufá. Nzambe alakaki ete akosambisa baoyo bazalaki konyokola mwana etike to mwasi oyo mobali akufá.—Kobima 22:22-24.
Na lolenge moko to mosusu, na eleko ya Ezekiele, Bayisraele bazalaki kobuka Mibeko ya Nzambe oyo ezalaki kosɛnga kozala na bolingo. Yehova asengelaki kosala nini? Yehova alobaki boye: “Nakosopela bango makaneli na ngai.” (Vɛrsɛ 31) Ndenge kaka alobaki, Yehova apesaki nzela ete bato ya Babilone bábebisa Yerusaleme na mobu 607 liboso ya ntango na biso mpe bámema Bayisraele na boombo.
Maloba ya Ezekiele eteyi biso makambo mibale na ntina na Yehova mpe kozanga bosembo: Ya liboso, Yehova ayinaka yango; ya mibale, ayokelaka bato oyo basaleli bango makambo na kozanga bosembo mawa. Nzambe abongwani te. (Malaki 3:6) Alaki ete mosika te, akolongola makambo nyonso ya kozanga bosembo mpe baoyo basalaka yango. (Masese 2:21, 22) Mpo na nini te koyekola makambo etali Nzambe oyo “alingaka bosembo” mpe ndenge oyo okoki kokóma mpenza moninga na ye?—Nzembo 37:28.
Botángi ya Biblia mpo na Augusto:
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
Yehova amonisaki polele ete baoyo bazali na bokonzi basengeli te kosalela bokonzi na bango na ndenge ya mabe