Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/3 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Yesu abengami Mwana ya Nzambe?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mpo na nini Nzambe atindaki Yesu awa na mabele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yesu Klisto azali nani?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Yesu azalaki mpenza Mwana ya Nzambe?
    Lamuká!—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/3 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Mpo na nini Yesu abengami Mwana ya Nzambe?

Nzambe azali na mwasi te oyo abotaki na ye bana. Azali Mozalisi ya biloko nyonso. Nzambe akelá bato na likoki ya komekola bizaleli na ye. Yango wana, Adama moto ya liboso oyo Nzambe akelaki, abengamaki “mwana ya Nzambe.” Ndenge moko mpe, Yesu abengami “mwana ya Nzambe” mpo akelamaki na bizaleli lokola oyo ya Tata na ye.​—Tángá Luka 3:38; Yoane 1:14, 49.

Ntango nini Nzambe akelaki Yesu?

Nzambe akelaki Yesu liboso akela Adama. Kutu, Nzambe akelaki Yesu mpe na nsima asalelaki ye mpo na kosala biloko mosusu nyonso, ata mpe baanzelu. Yango wana Biblia ebengi Yesu “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá” na Nzambe.​—Tángá Bakolose 1:15, 16.

Yesu azalaki ekelamu ya elimo na likoló liboso abotama na Beteleme. Ntango ngonga ekokaki, Nzambe alongolaki bomoi ya Yesu na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Maria mpo abotama lokola moto.​—Tángá Luka 1:30-32; Yoane 6:38; 8:23.

Mpo na nini Nzambe asalaki ete Yesu abotama awa na mabele? Yesu akokisaki mokumba nini ya ntina? Okoki kozwa biyano na mituna wana na Biblia, mpe yango ekobakisa boyebi na yo mpe ekosalisa yo omonisa lisusu botɔndi mpo na oyo Nzambe mpe Yesu basalá mpo na yo.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 4 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto