Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/12 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Baklisto basambelaka na elimo mpe na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tómekola Nzambe oyo alingaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ndenge nini toyokaka Nzambe?
    Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
  • Koyeba solo ekoki komemela yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/12 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Tokoki koyeba solo na ntina na Nzambe?

Motatoli ya Yehova azali kosakwela moto moko oyo afandi na banc na parkɛ

Mpo na nini Nzambe alingi tóyeba solo? Tángá Yoane 17:3

Nzambe asololaki na bato. Asalelaki elimo santu na ye to nguya oyo asalelaka misala mpo na kotya makanisi na ye na mitó ya bato oyo bakomaki Biblia. (2 Petro 1:20, 21) Tokoki koyeba solo na ntina na Nzambe soki tozali kotánga Biblia.​—Tángá Yoane 17:17; 2 Timote 3:16.

Nzambe amonisi makambo mingi etali ye na Biblia. Amonisi ntina oyo akelaki bato, nini akosalela bango mpe bizaleli oyo alingi tózala na yango. (Misala 17:24-27) Yehova Nzambe alingi tóyeba solo etali ye.​—Tángá 1 Timote 2:3, 4.

Mpo na nini Nzambe ayambaka baoyo balingaka solo?

Yehova azali Nzambe ya solo mpe atindaki Mwana na ye, Yesu mpo na koteya bato solo. Yango wana, bato oyo balingaka solo bayaka epai ya Yesu. (Yoane 18:37) Nzambe alingaka bato oyo basambelaka ye bázala bongo.​—Tángá Yoane 4:23, 24.

Mateya ya lokuta oyo Satana Zabolo apalanganisi na ntina etali Nzambe epekisi bato mingi báyeba Nzambe. (2 Bakorinti 4:3, 4) Bato oyo balingaka makambo ya malamu te babendamaka na mateya wana ya lokuta. (Baroma 1:25) Kasi, koyekola Biblia esalisi bamilio ya bato ya mitema sembo báyeba solo na ntina na Nzambe.​—Tángá Misala 17:11.

Mpo na koyeba makambo mosusu talá mokapo 1 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.jw.org

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto