Tósunga na bolingo nyonso baoyo bazali komonisa bosepeli
1 Ntango moyekoli Filipo akambamaki na anzelu ya Yehova epai na Moetiopia oyo amonisaki bosepeli ya solo mpo na Liloba ya Nzambe, asɛngaki na ye na bolingo nyonso ete asunga ye na kokanga ntina ya makambo oyo azalaki kotánga (Mis. 8:26-39) Tosalaka oyo ekoki na biso mpo na kosunga baoyo bazali komonisa bosepeli? Tosengeli kosala yango, mpamba te eteni moko ya etinda oyo Nzambe apesi biso ezali ya kozalisa bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Tokoki kosala nini mpo na kosunga bango?
2 Tómibombela ntango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na kosala bozongeli ya sika. Tómibongisa mpo na kozonga kotala baoyo bamonisaki bosepeli mpe tósala milende ya kozongela lisoló oyo tobandaki na mbala eleki. Tómityela kati na makanisi mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia. Tózonga mbala na mbala kotala bango mpo na kolakisa bango banimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! Soki bato bazali komonisa bosepeli ya solo, mbala mosusu tokoki kosɛnga na bango ete básala abonemá.
3 Soki, na boyei na biso ya liboso tolobelaki mpo na motuya ya Biblia, tokoki kozongela lisoló na kosaleláká moko na makanisi oyo mapesami na lokasa 59 ya mokanda “Comment raisonner” mpe koloba boye ete:
▪“Basusu bakanisaka ete batoli oyo Biblia epesaka ebongi kosalelama te na eleko na biso. Ezali boni mpo na yo? [Tiká ete ayanola.] Na ndakisa soki búku moko epesi biso batoli malamu mingi oyo ezali kosalisa biso na kozala na bomoi ya libota ya esengo, tokoloba te ete ebongi mpenza kosalelama? [Tiká ete ayanola.] Na ntina etali bomoi ya libota ya esengo, mateya mpe lolenge ya kosala ebongwani mpe matomba oyo tozali komona lelo ezali ya malamu te. Nzokande, mabota oyo mazali kosalela makambo oyo Biblia elobi mazali na moboko malamu mpe na esengo.” Tótánga Bakolose 3:18-21. Tólakisa trakte Mpo na nini kondimela Biblia mpe tómonisa ete tozali na ebongiseli ya kolakisa bato Biblia kozanga kofuta.
4 Tokoki kobanda lisoló likoló na ezalela ya bakufi na lolenge oyo:
▪“Ezali na makambo mingi ya kolobela likoló na ezalela ya bakufi. Engebene makanisi na yo, nini ekómelaka biso soki tokufi? [Tiká ete ayanola.] Mangomba mingi bateyaka ete tolandaka kozala na bomoi na lolenge mosusu. Mingi bakamwaka na koyoka oyo Biblia elobi na ntina na likambo yango. [Tángá Mosakoli 9:5.] Kasi, ata soki bakufi bayebi lisusu eloko te, nzokande babosani bango te. Nzambe alaki ete akozongisa bango lisusu na bomoi na nsé na boyangeli ya Bokonzi na ye.” Tófungola mokanda Bomoi ya seko na lokasa 162 mpe tosolola likoló na maloba mazali wana mpe bililingi. Tómibongisa mpo na kosala bozongeli ya sika na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia.
5 Soki tolingi kopesa bandimbola mingi mpo na etɛlɛmɛlo ya boklisto na ntina na bitumba oyo ezali kobimisama na mabota, tokoki mbala mosusu koloba makanisi lokola oyo:
▪“Basusu bakanisaka ete nzela bobele moko ya kosilisa matáta ezali kobunda. Makanisi na yo ezali nini mpo na likambo yango? [Tiká ete ayanola.] Biblia emonisi ete Nzambe alingi ete bato báfanda elongo kati na kimya. [Tángá Baloma 12:17, 18.] Yango ekokóma likambo ya solo mpo na etando mobimba na nsé na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe.” Tókamata mwa búku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? na nkasa 25 mpe 26. Tómonisa ete tokozonga lisusu mpo na kolimbola mpo na nini Yesu alakisaki biso kosambela mpo ete ‘mokano ya Nzambe esalema awa na mabelé lokola na likoló.—Mat. 6:10.
6 Mokube moetiopia ayebaki ete akokaki te kokanga ntina kozanga ete moto moko atambwisa ye. (Mis. 8:31) Na bolingo nyonso, Filipo apesaki ye lisungi oyo azalaki na yango mposa. Tokoki komonisa bolingo na biso ya solo mpo na bazalani na biso na kosungáká bango na lolenge yango.