Tólakisa búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
1 Oyo nde esengo toyokaki na kobima ya búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko! Búku yango ebimisami mpo na kosunga bato ete bázwa nokinoki boyebi moko ya sikisiki ya solo. Na Yúni, tokolakisa búku yango na teritware na biso. Tokoki koloba nini mpo na kolamusa mposa ya basololi na biso?
2 Talá kolakisama ebongi na kosepelisa bato oyo kondima na bango epai na Nzambe esili kokita:
◼ “Bato mingi oyo babɔkɔlami kati na kondima Nzambe bazali komimona ete kondima na bango ezali lisusu makasi te ndenge yango ezalaki liboso. Engebene makanisi na yo, ntina ekoki kozala nini? [Tótika moto yango ayanola.] Kondima na biso epai na Nzambe elendisamaka ntango tokanisaka na biloko kitoko oyo bizwami kati na molɔ́ngɔ́. [Tótánga Nzembo 19:1.] Ye oyo mibeko na ye mizali kotambwisa bikelamo ya likoló azali mpe kopesa biso matambwisi malamu. [Tótánga Nzembo 19:7-9.] Mikapo yango mizali komonisa ete esengeli na biso koyekola nyonso oyo tokoki koyeba likoló na Nzambe mpe mikano na ye. [Tóbenda likebi likoló na elilingi ya lokasa 4 mpe 5, mpe tótánga makambo mazali na nsé na yango.] Soki olingi kozwa matomba na boyebi yango ya sikisiki, nakosepela kotikela yo búku oyo.”
3 Kokanisáká mwa likambo moko ya nsɔ́mɔ oyo liuti kosalema kala mingi te, tokoki koloba boye:
◼ “Na ntembe te oyokaki bazali koloba na ntina na [tótánga likambo yango]. Osila komituna soko Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na bokeseni mpe minyoko oyo tozali komona to kozwa? [Tótika moto yango ayanola.] Biblia ezali kopesa biso endimiseli ete Nzambe alingaka biso mpe akosunga biso na bantango ya mpasi.” Tótánga makanisi ya Nzembo 72:12-17. Tófungola búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, na lokasa 70, mpe tómonisa ete búku yango, ezali koyanola na motuna oyo bamilió ya bato bazali komituna: Mpo na nini Nzambe atiki nzela na minyoko? “Okozwa eyano ya kosepelisa oyo Biblia ezali kopesa na motuna yango. Nakosepela kotikela yo búku yango mpo ete ozwa eyano yango yo moko.”
4 Soki tokutani na tata to na mama moko, toloba na ntina na libota:
◼ “Baboti mingi bayebaka ete ezali mpenza mpasi mpo na kozala na bomoi ya libota ya esengo. Engebene makanisi na yo, mikakatano mpenzampenza ezali nini? [Tótika moto yango ayanola.] Mingi kati na biso tosalaka oyo ekoki na biso, kasi biso nyonso tozalaka na mposa ya koyeba oyo ekoki kosunga biso mpo na kozwa matomba malamu koleka. Biblia ezali kopesa batoli eleki malamu. [Tótánga makanisi ya Bakolose 3:12, 18-21.] Biblia ezali na makambo mingi ya kolobela mpo na yango, lokola yango emonisami na mokapo 15 ya búku oyo, ezali na motó ya likambo ‘Ndenge nini kotonga libota oyo ezali kokumisa Nzambe.’ Mokapo yango mosangisi batoli ya Biblia oyo ezali komonisa lolenge nini babalani bakoki kosilisa matátá kati na bango mpe kosunga bana ete bálónga mikakatano na bango. Nandimisami ete okosepela na botángi na yango.”
5 Soki tolingi koloba na mokuse, tokoki kobanda lisoló boye:
◼ “Osilá naino komituna te mpo na nini tozali konuna mpe tozali kokufa? Mokapo 6 ya búku oyo ezali kolimbola ntina ya liwa mpe ndenge nini Nzambe akotya nsuka na yango. Biblia ezali koloba na biso ete Nzambe alaki bomoi ya seko na baoyo bazali kolinga ye. [Tótánga Yoane 17:3.] Soki ozali na mposa ya koyeba makambo mosusu likoló na yango, okosepela na búku oyo kati na yango okoki kozwa mateya mingi.”
6 Soki tomibongisi malamu, tokozala na likoki ya kosalela búku yango mpo na ‘kolimbola Makomami polele’ epai na bazalani na biso, na esengo monene mpo na bango.—Luka 24:32.