Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/97 nk. 1-2
  • Bilenge, mikano na bino ya elimo mizali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge, mikano na bino ya elimo mizali nini?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Oyo okoki kosala mpo na kokokisa mikano na yo ya elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Zalá na mikano ya elimo mpo na kokumisa Mozalisi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Omityela mikano ya elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Bilenge​—Bozali kokola na elimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 7/97 nk. 1-2

Bilenge, mikano na bino ya elimo mizali nini?

1 Yehova ayebi na meko nini mosala oyo ezali kosepelisa mpe mikano oyo mikoki kokokisama ezali kopesa bolamu. (Talá Genese 1:28; 2:15, 19.) Na mikolo na biso, azali kopesa na basaleli na ye mosala ya kosakola mpe ya koteya. Tozali mpe na mokano oyo eleki monene ete tózwa bomoi ya seko kati na Paladiso. Wana tozali kozela, tosengeli komityela mikano ya elimo ete tókola soki tolingi kosalela malamu makasi mpe bozwi na biso.​​​—1 Kol. 9:26.

2 Mikano oyo mikoki kokokisama mpo na bilenge: Bilenge basengeli kozala na mikano ya Teokrasi oyo milongobani na makoki na bango. (1 Tim. 4:15) Bana ya mike mpenza bakokisaki mokano ya koyeba nkombo nyonso ya mikanda ya Biblia liboso ete báyeba kotánga. Na lisalisi ya boyekoli ya libota, bana bazali koyekola kobongisa makita na mokano ya kopesa biyano oyo bikanisami malamu mpe kokomisa nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Na kokendáká elongo na baboti na bango na mosala ya kosakola, bazali koyekola kosangana na mosala ya kopesa litatoli mpe bazali kokóla mpo na kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Ezali malamu ete baboti básololaka ntango nyonso na bana na bango na ntina na mokano ya komipesa mpe kozwa batisimo.

3 Soki ozali elenge, mikano nini ya elimo ozali komityela? ‘Okanisa Mozalisi na yo Monene’ na kotyáká likebi na yo likoló na mikano oyo mizali mpenza na ntina mingi na bomoi. (Mos. 12:1; Nz. 71:17) Mpo na nini te kozala mobongisi-nzela mosungi na ntango ya loi na kelasi? Osilá kokanisa kobanda mosala ya ntango nyonso na kozaláká mobongisi-nzela ya sanza na sanza? Okanisi boni mpo na koyekola lokótá ya bapaya mpo ete okoka, na nsima, kosimba etuluku moko to lisangá moko ya lokótá ya bapaya, na etúká na bino to epai mosusu? Mingi kati na bandeko mibali mpe basi oyo bazali kosala lelo kati na Betele to lokola bakɛngɛli-batamboli to bamisionere, bazwaki mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso ntango bazalaki naino na eteyelo. Mpo na nini te kosala mpe bongo?

4 Bino baoyo bozali naino na mbula ya bolenge, bósala makasi ete bólanda ndakisa ya Yesu. Wana azalaki na mibu 12, asilaki kobanda kolobela makambo ya elimo. (Luka 2:42-49, 52) Na komityeláká mikano malamu oyo ekopusa bino na kozala na boyekoli ya bino moko, na kotángáká Biblia mokolo na mokolo mpe na kosaláká boninga elongo na baklisto oyo bateli, na makita mpe na mosala ya kosakola, bokozwa kobongisama oyo ekosalisa bino ete bóteya basusu na ntina na Bokonzi ya Nzambe, lokola Yesu asalaki yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto