Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/97 lok. 1
  • Bosembo epesameli mbano

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bosembo epesameli mbano
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Yehova apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tómipesa mingi na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ozalaka sembo na makambo nyonso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 8/97 lok. 1

Bosembo epesameli mbano

1 Na Baebele 11:6 (NW), tozali kotánga ete Nzambe “akómaka mopesi na mbano epai na baoyo bazali koluka ye mpenza.” Mingimingi, azali kopesa mbano epai ya basaleli na ye oyo bamipesi mpe bazali ‘sembo na makambo mike’ na ‘kotyáká’ bango ‘likoló na biloko mingi.’ (Mat. 25:23, NW) Na maloba mosusu, mpo na kopesa mbano epai na Batatoli na ye ya sembo mpo na mosala na bango malamu, Yehova azali mbala mingi kopesa bango mabaku ya sika ya mosala.

2 Lokola mbano mpo na bosembo na ye, ntoma Paulo apesamelaki mosala oyo ememaki ye kotambola na bingumba mpe na bamboka ya Mpótó mpe ya Asie Mineure. (1 Tim. 1:12) Atako asengelaki kosala milende mingi mpo na kokokisa malamumalamu mosala na ye, Paulo azalaki kopesa motuya mingi na libaku ya mosala oyo azwaki. (Lom. 11:13; Kols. 1:25) Na nzela ya mosala na ye ya molende, amonisaki polele ete bomoi na ye etambwisami na kondima na ye. Ndakisa na ye ezali kolendisa biso na kopesa motuya monene na mabaku na biso ya mosala.

3 Yehova apesi biso mosala: Ndenge nini tozali komonisa ete tozali kopesa motuya na mbano yango, na libaku yango, lolenge moko na Paulo? Tozali koluka myango ya kobakisa kosangana na biso na mosala yango. Tozali kosalela mabaku nyonso ya kopesa litatoli ya libaku malamu mpe ya ndako na ndako. Tozali kozongela bato nyonso oyo tokutaki te na bandako na bango mpe tozali kozongela baoyo bamonisaki bosepeli. Tozali mpe kotosa mokolo oyo toyokani mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndako.

4 Kolobáká mpo na mosala ya kosakola, Paulo apesaki elendiseli oyo: “Osala yango na etingya.” (2 Tim. 4:2, NW) Etingya elimbolami lokola kosala likambo moko na molende. Tozali kosala mosala na biso ya kosakola na molende na kotyáká yango na esika ya liboso na bomoi na biso? Na ndakisa, tokolinga te kotika ete kominanola mpe misala na biso mosusu ya wikende ebebisa ntango oyo tosengeli kopesa na kosakola. Lokola tondimisami ete nsuka ya ebongiseli ya ntango oyo ezali kobelama nokinoki, tondimisami mpe ete kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi ezali mosala oyo eleki ntina oyo tokoki kosangana na yango.

5 Bosembo na biso epai na Nzambe ezali mpe komonana wana tozali kosangana ntango nyonso na mosala oyo apesi biso. Tókokisa malamumalamu mosala na biso mpe Yehova akopesa biso mbano mingi mpo na bosembo na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto