Biyano na mituna na bino
◼ Tokoki kosala nini mpo ete tózwa matomba koleka na makita na biso?
Bato mosusu bakanisaka ete bobele bankulutu mpe basaleli na misala nde bazali na mokumba mpo ete makita másalama malamu mpamba te bango nde batambwisaka yango mpe basalaka masolo mingi koleka. Nzokande, biso nyonso tokoki kosala ete makita mázala na esengo mpe na litomba. Tokoki kozwa matomba koleka na makita na kosaleláká myango zomi oyo milandi:
Tóbongisaka makita liboso. Soki tobongisi makita malamu, tokosepela na mateya na yango. Soki mokomoko na biso azali kosala bongo, makita makozala na mɔ́tɔ mpe makolendisa biso koleka. Tóyanganaka ntango nyonso. Mokomoko kati na biso azali kolendisama soki amoni ete bato bazali koya mingi na makita mpe yango ezali komatisa botɔ́ndi na biso na ntina na makita. Tókómaka na ngonga malamu. Soki tokómi liboso ete makita mabanda, tokoki koyemba loyembo ya ebandeli elongo na basangani mosusu mpe tokoki kolanda libondeli mpe na kosaláká bongo tokozwa mpenza matomba na makita. Buku ya nzembo ezali kobimisama ndambondambo na nkota ya mboka na biso, mpe yango ezali kobakisama na buku ya nzembo oyo tozali na yango na Lifalanse, na Lingala mpe na Swahili. Ndambo mosusu ya nzembo ebimisami na Kiluba, na Kirundi mpe na Otetela. Tozali kolikya ete tokozwa yango mpe na nkota mosusu. Na bongo, ntango buku ya nzembo to ndambo na yango ebimi na lokota oyo esalelamaka na lisangá, ebongi ete lisangá mobimba báyembaka nzembo na lokota yango na esika ete bamoko báyembaka na lokota yango mpe bamosusu báyembaka na lokota mosusu. (Lom. 15:6; 1 Kol. 14:23, 33) Tómemaka mikanda oyo mikosalelama. Na komemáká Biblia na biso mpe mokanda to mikanda oyo mikosalelama na boumeli ya makita, tokoki kolanda mateya nyonso mpe kosimba malamu mateya oyo mazali kopesama. Tóbungisaka likebi te. Tokoki kolanda makita malamu mpenza soki tofandi kozanga kolala mpongi. Kosala makɛlɛlɛ mpe kokende mpambampamba na twalɛti ekoki kopɛngola likebi na biso mpe ya bato mosusu. Tópesaka biyano. Soki mingi kati na biso bazali kotombola mabɔkɔ mpe kopesa biyano, bato mingi koleka bakolendisama mpe biyambweli yango ya kondima ekotonga bango. Tópesaka biyano mokuse. Yango ekopesa likoki na bato mingi koleka ete bápesa biyano. Tosengeli kosukisa biyano na biso bobele na lisolo oyo tozali koyekola. Tósalaka mikumba bapesi biso. Soki okosala mokumba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi to na Likita ya mosala, bongisá mokumba yango malamu, zongeláká yango mbala na mbala na mongongo makasi liboso ya kosala yango, mpe salá molende mpo na kosala mokumba na yo malamu. Tópesaka basangani mosusu longonya. Yebisá basusu ete osepelaka mpenza na milende na bango. Yango ekotonga kondima na bango mpe ekopusa bango ete básala lisusu malamu koleka na mabaku mosusu. Tólendisanaka moko na mosusu. Kopesana mbote na boboto nyonso liboso mpe nsima ya makita mpe kosolola masolo oyo mazali kolendisa, ekolisaka esengo mpe matomba oyo tozali kozwa na koyanganáká na makita.