Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/99 lok. 1
  • Tósakola nsango malamu na mposa makasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósakola nsango malamu na mposa makasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Sakolá mpe pesá litatoli malamumalamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tokoki kosala ete sanza ya Aprili 2000, ezala sanza oyo eleki basanza nyonso?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Zalá na mposa makasi ya kosakola nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 4/99 lok. 1

Tósakola nsango malamu na mposa makasi

1 ‘Nayoki mposa makasi ya komona bino . . . Nazali na mposa ete nasakola mpe nsango malamu epai na bino.’ Ezali na maloba oyo nde ntoma Paulo abandaki mokanda na ye oyo akomelaki bandeko ya Loma. Mpo na nini Paulo azalaki na mposa makasi ya komona bango? Alobaki: ‘Mpo ete nabuka mpe mbuma kati na bino . . . Mpamba te nayoki nsango malamu nsɔni te; yango ezali nde nguya ya Nzambe mpo na lobiko.’​—Lom. 1:11-16, NW.

2 Tozali mpe komona mposa makasi yango ya Paulo na maloba oyo alobaki na bankulutu ya Efese ete: ‘Banda mokolo ya liboso oyo nakómaki awa na Azia . . . , nabangaki te . . . kolakisa bino na miso ya bato ebele mpe na ndako na ndako. Natatoli epai ya Bayuda, mpe ya Bagreke.’ (Mis. 20:18-21, NW) Na bisika nyonso oyo azalaki kosakola, Paulo azalaki na mokano ya kopalanganisa nsango malamu ya lobiko mpe kozwa matomba ya Bokonzi. Oyo nde ndakisa malamu tosengeli komekola!

3 Tómituna mituna oyo: ‘Ngai mpe nazali komonisa mposa makasi ndenge moko mpo na kosakola nsango malamu na esika nafandi? Na esika ete namona mosala ya kosakola nsango malamu lokola mokumba, namonisaka mposa makasi ya kosakola nsango malamu epai na bato mingi? Nasili kotalela kati na libondeli lolenge ya bomoi na ngai moko? Nasili kosalela lolenge nyonso ya kosakola oyo ebongisami mpo na teritware na biso, lokola kosakola ndako na ndako, kosakola na balabala, kosakola na bisika ya mombongo, kopesa litatoli na telefone, mpe kopesa litatoli ya libaku malamu?’

4 Tósakola na mposa makasi na sanza ya Aprili: Aprili ezali sanza moko malamu mpo na kokolisa lisusu mingi mosala na biso ya kosakola. Lokola bakitisi ngonga mpo na babongisi-nzela, yango ekopesa bandeko mingi nzela ete básala lokola babongisi-nzela basungi. Yango etaleli bomoi na yo, kasi mbala mosusu okosepela kosala lokola mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili mpe ya Mai. To mpe okoki kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza, lokola bakitisi mpe ngonga ya mosala yango. Soki tozali basakoli, tokoki kosala ngonga mingi lisusu na mosala ya kosakola na sanza ya Aprili mpe ya Mai, mpo na kosunga baoyo bazali kosala lokola babongisi-nzela, boye te? Yango ekosepelisa motema ya Yehova!

5 Na ndakisa ya Paulo, basakoli nyonso ya Bokonzi basengeli komonisa mposa makasi ya kosala mingi na mosala ya kosakola. Soki tozali kosala nyonso oyo ekoki na biso kati na mosala ya kosakola, tokozala na esengo ya solosolo. Paulo azalaki mpe na esengo yango kati na mosala na ye ya bulɛɛ. Tokosala malamu soki tomekoli ndakisa na ye.​—Lom. 11:13; 1 Kol. 4:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto