Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/99 lok. 1
  • Tósakola lisusu mingi koleka awa nsuka ebɛlɛmi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósakola lisusu mingi koleka awa nsuka ebɛlɛmi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Kobosana te ete mikolo etikali ya kotánga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Batelá elimo na yo ya etingyA
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Ndenge ya komonisa molende na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • “Sakolá Liloba . . . na lombangu”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 4/99 lok. 1

Tósakola lisusu mingi koleka awa nsuka ebɛlɛmi

1 Eleko ya kobuka mbuma ezalaka ntango moko ya esengo mpenza. Ezalaka mpe ntango moko ya mosala makasi, mpamba te basali bazalaka bobele na mwa ntango moke mpo na kobuka mbuma mpe basengeli soko moke te kosala mosala na bango na bopɔtu.

2 Kolobáká na maloba ya elilingi, Yesu akokanisaki “nsuka ya biloko mabe” na eleko ya kobuka mbuma. (Mat. 13:39, NW) Tozali kobika na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya biloko mabe ya ntango yango oyo Yesu alobelaki, mpe ntango oyo etikali mpo na kopesa litatoli “na mabota nyonso” ezali mpenza mokuse. (Mat. 24:14) Tosengeli komonisa lisusu molende mingi koleka kati na mosala ya kosakola awa nsuka ebɛlɛmi. Mpo na nini? Yesu alimbolaki ete: “Mbuma na elanga eteli mingi mpenza, nde basali bazali mingi te.”​—Mat. 9:37, 38; Lom. 12:11.

3 Oyo ezali ntango ya kokanga mabɔkɔ te: Ntango Yesu abandaki mosala na ye monene ya kosakola, azalaki bobele na mbula misato na ndambo mpo na kokokisa mosala oyo bapesaki ye. Azalaki ntango nyonso koyeba na makanisi ete ntango ezalaki mokuse, yango wana alobaki ete: ‘Nasengeli kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, mpamba te ezali mpo na yango nde natindamaki.’​—Luka 4:43, NW.

4 Yesu akɔtisaki elimo ya kosakola na lombango epai ya bayekoli na ye. (Mko. 13:32-37) Ezali mpo na yango nde ‘batikaki te kolakisa mikolo nyonso na Tempelo mpe na ndako na ndako kosakola nsango malamu ya Klisto, Yesu.’ (Mis. 5:42, NW) Bapesaki nzela te na misala ya mikemike ete ezala na ntina mingi na bomoi na bango. Yango wana, atako bazalaki moke, balongaki kosakola nsango malamu “epai na bato nyonso na nse na likoló.”​—Kols. 1:23.

5 Lelo oyo, biso mpe tozali na ntina monene ya kolona ezaleli ya kosala na lombango, mpamba te “nsuka ya makambo nyonso ezali kobɛlɛma.” (1 Pet. 4:7) Yehova asili kopona mokolo mpe ngonga oyo akotya nsuka na biloko mabe ya ntango oyo. (Mat. 24:36) Mosala ya kosakola ekosila na ntango oyo etikali. Mpo na yango, tósala lisusu milende makasi mpo na koyebisa nsango malamu epai na bato mingi koleka.

6 Soki tokosakola lisusu mingi koleka awa nsuka ebɛlɛmi, tokosepela koloba na Yehova, ndenge Yesu alobaki ete: ‘Tosilisi mosala oyo opesaki biso tósala.’​—Yoa. 17:4, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto