Komibongisa liboso epesaka esengo
1 Kobima na mosala ya kosakola epesaka biso esengo mingi. (Nz. 89:15, 16) Solo, komibongisa ezali sɛkɛlɛ mpo na kozwa esengo yango mingi lisusu koleka. Soki tozali komibongisa malamu, tokosala mosala na biso malamu, mpe soki tosali mosala na biso malamu, tokozwa esengo mingi.
2 Salelá bisaleli oyo ebongisami: Bandá komibongisa na kotángáká mpe na kotaleláká malamu masolo oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi. Mosala na biso ya Bokonzi epesaka ntango nyonso masolo oyo ebongisami malamu mpo na kosalisa yo osakola nsango ya Bokonzi malamu mpe na molende. Ezali mpe na bandakisa mpo na kolonga botɛmɛli oyo bato babimisaka mbala mingi. Makanisi ya polele epesamaka mpo na lolenge malamu ya kosala bozongeli ya sika, na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia na bango. Okoki kolobela makanisi yango na maloba na yo moko mpo okoka kosalela yango malamu. Buku Comment raisonner ezali mpe na mitó ya makambo ndenge na ndenge mpo na kobanda lisolo mpe ndenge ya kolonga botɛmɛli, yango ekosalisa yo olonga makambo nyonso oyo okokutana na yango.
3 Luká na kati ya mokanda oyo okolakisa bato, mpe poná likambo moko to makambo mibale oyo ezali kobenda likebi oyo okoki kolakisa epai ya moto oyo ozali kosolola na ye. Mpo na kobanda lisolo, okoki kosalela nsango moko oyo oyokaki to otángaki mpe ekoki kopusa na kokanisa. Kanisá botɛmɛli oyo tokutanaka na yango, mpe luká lolenge oyo okoki kosala liboso ya botɛmɛli yango. Na nsima, zwá miniti moke mpo na komeka ndenge okosala soki okómi na ekuke ya moto.
4 Yaká na likita nyonso ya mosala: Tyá likebi ntango Likita ya Mosala ezali kosalema, ntango bazali kolobela, kozongela, mpe kosala bilakiseli likoló na makanisi oyo emonisami na Mosala na biso ya Bokonzi. Komá mwa makanisi oyo omoni ete okoki kosalela yango ntango ozali kopesa litatoli. Omikundola mwa makambo oyo okutanaki na yango na mosala ya kosakola, mpe kanisá lolenge oyo okoki kopesa litatoli lisusu malamu koleka. Sololá makambo yango elongo na basakoli mosusu liboso mpe nsima ya likita.
5 Okoki kotya motema ete soki omibongisi malamu mpo na “misala nyonso malamu,” okozwa esengo mingi mpe matomba mingi wana ozali kosalisa basusu ete báyeba nzela ya bomoi.—2 Tim. 2:21.