Molende oyo ezali kopesa bato mingi makasi
Ntoma Paulo apesaki baklisto ya Kolinti longonya mpamba te molende na bango mpo na mosala malamu “epesaki makasi” na baninga na bango baklisto. (2 Kol. 9:2, NW ) Mbala mingi, moto moko, libota mobimba, etuluku ya boyekoli ya mokanda to lisangá mobimba ekoki kopesa bato mosusu makasi ndenge yango, na molende na bango oyo bazali komonisa na mosala ya kopalanganisa nsango malamu. Talá mwa makambo oyo okoki kosala mpo na komonisa molende na yo na mosala ya kosakola.
◼ Salelá mikolo ya pɔsɔ mpo na kokabola bazulunalo.
◼ Bimaká mpe na mosala ya kosakola na mikolo mosusu ya lomingo.
◼ Zalaká na ebongiseli nyonso oyo ezwami mpo na kopesa litatoli na mikolo mosusu ya sipesiale.
◼ Soki ozwi konje na mosala to na kelasi, obimaka na mosala ya kosakola.
◼ Bimaká na mosala ya kosakola na boumeli ya pɔsɔ oyo mokɛngɛli ya zongazonga azali kotala lisangá na bino.
◼ Salaká mosala ya mobongisi-nzela mosungi sanza moko to sanza mingi na boumeli ya mbula mobimba.
◼ Bongisá programɛ na yo mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza soki likoki ezali.
Talá Annuaire des Témoins de Jéhovah 2000, lok. 17-19.