Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/00 lok. 7
  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2001

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2001
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na mobu 2000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Eteyelo moko oyo ezali kobongisa biso mpo na makambo oyo eleki ntina
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2002
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Ndenge ya kobongisa masolo na yo ya eteyelo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 12/00 lok. 7

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2001

1 Mikapo mingi ya Makomami ezali komonisa ntina oyo biso nyonso tosengeli kosalaka mikumba mingi na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi soki likoki ezali.​—Mas. 15:23; Mat. 28:19, 20; Mis. 15:32; 1 Tim. 4:12, 13; 2 Tim. 2:2; 1 Pet. 3:15.

2 Eleki bambula mingi, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezalaka na programɛ ya kotánga Biblia. Esɛngaka kotánga lokasa moko ya Biblia mokolo na mokolo. Kobanda na mbula oyo, programɛ mpo na kotánga Biblia etyami mpe na pɔsɔ ya bozongeli nyonso ya kokoma. Botángi mosusu ya Biblia oyo etyamaki esili koleka sikoyo mbula misato, euti kosila. Kasi soki olingi kotánga Biblia mingi koleka ndenge etyami na programɛ, okoki kosala programɛ na yo moko.

3 Lisolo No. 2, ezali mpo na kosalisa bandeko mibali ete báyeba kotánga malamu Liloba ya Nzambe “liboso ya bato.” (1 Tim. 4:13, NW ) Soki ozwi mokumba ya botángi, meká yango naino yo moko na mongongo makasi mbala na mbala. Okoki kosalela kasɛti ya botángi ya Biblia oyo ebimisami na la Société mpo na kobongisa lolenge na yo ya kotánga maloba mosusu, koyeba esika oyo osengeli komatisa to kokitisa mongongo, mpe makambo mosusu oyo ekosalisa yo ete oyeba kotánga malamu.

4 Lisolo No. 3 mpe No. 4, ezali na buku Comment raisonner, oyo ebongisami mpo tósalelaka yango na mosala ya kosakola. Soki lisolo na yo ezali na makambo mingi, mpe okokoka kosala yango na ngonga oyo epesami te, osengeli kopona kaka makambo oyo ekozala na ntina mpo na teritware ya lisangá na bino. Okoki kosalela kadre nyonso oyo ezali malamu mpo na teritware na bino.

5 Salá mpenza milende mpo na kokokisa mikumba na yo nyonso malamu na eteyelo. Zwaká ntango mpo na komibongisa malamu, mpe maloba na yo esengeli kouta mpenza na motema. Okolendisa bato mosusu na kati ya lisangá, mpe okozwa matomba yo moko soki okosala na motema na yo mobimba mikumba oyo bakopesa yo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na boumeli ya mobu 2001.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto