“Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato”
1 Bato ya mokili oyo tozali na bango esika moko bazali na molili na makanisi mpe na elimo. Pole ya solo ezali komonisa polele “misala ezangi kobota mbuma” oyo euti na molili mpo tókoka kokima mabaku yango oyo ebomaka. Yango wana, ntoma Paulo apesaki baklisto toli ete: “Bótambolaka lokola bana na [pole, NW ].”—Ef. 5:8, 11.
2 “Mbuma ya pole” ekeseni mpenza na molili ya mokili. (Ef. 5:9, NW ) Mpo tómonisa mbuma yango, tosengeli kopesa ndakisa malamu na bomoi na biso ya baklisto mpo tózala lolenge ya bato oyo Yesu andimaka. Tosengeli mpe komonisa bizaleli lokola: komipesa mobimba, bosembo, mpe kosepela na solo. Tosengeli komonisa mbuma yango na bomoi na biso ya mokolo na mokolo mpe na mosala na biso ya kosakola.
3 Ngɛngáká ntango nyonso: Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato.” (Mat. 5:16, NW ) Na ndakisa ya Yesu, tongɛngisaka pole ya Yehova ntango tozali kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe mikano na ye. Tongɛngaka lokola miinda ntango tozali kokende na bandako ya bato mpe ntango tozali kopalanganisa solo na mosala, na eteyelo, epai ya baninga na biso ya kartye, to epai nyonso oyo tozwi libaku ya kosakola.—Filp. 2:15.
4 Yesu alobaki ete bato mosusu bakoyina pole. (Yoa. 3:20) Na yango, tólɛmbaka nzoto te ntango bato mingi bazali koboya ete “pole ya nsango malamu ya nkembo ya Klisto” engɛnga na nzela na bango. (2 Kol. 4:4) Yehova ayebi makambo oyo ezali na mitema ya bato mpe alingi te ete bato ya misala mabe bázala kati na basaleli na ye.
5 Soki tozali kolanda banzela ya Yehova mpe kosepela na pole ya elimo, tokoki mpe kongɛngisa yango epai ya bato mosusu. Soki bato bamoni na etamboli na biso ete “tozali na pole ya bomoi,” yango ekotinda bango básala mbongwana oyo esengeli mpo na kokóma bamemi ya pole.—Yoa. 8:12, NW.
6 Soki tozali kotika ete pole na biso engɛnga, tokokumisa Mozalisi na biso mpe tokosalisa bato ya motema sembo báyeba ye mpe bázwa elikya ya bomoi ya seko. (1 Pet. 2:12) Lokola tozali na pole, tiká tósalela yango mpo na kosalisa bato mosusu bábima na molili ya elimo mpe básala misala ya pole.