Zalá moyoki malamu
1 Esɛngaka kosala milende mpo na koyoka malamumalamu. Esengeli mpe ete moto oyo azali koyoka amonisa mposa ya koyekola mpe ya kozwa litomba na makambo oyo ayoki. Yango wana, Yesu amonisaki ntina ya ‘kotya likebi na ndenge bozali koyoka.’—Luka 8:18, NW.
2 Yango ezali na ntina mingi ntango tokei na makita ya lisangá, na mayangani ya mike mpe ya minene. Yango ezali mabaku oyo tosengeli koyoka malamumalamu. (Ebe. 2:1) Talá mwa makambo oyo ekosalisa yo ozala moyoki malamu na makita wana ya boklisto.
◼ Moná ntina ya makita. Ezali mingimingi na nzela na yango nde ‘Yehova azali koteya biso’ na nzela ya “moombo ya sembo.”—Yis. 54:13; Luka 12:42.
◼ Omibongisa liboso. Tángá makambo oyo ekolobama na makita, mpe sɛnzɛlá ete omema Biblia na yo mpe mokanda oyo bokoyekola.
◼ Ntango makita ezali kosalema, salá makasi mpo ete makanisi na yo etambolatambola te. Koluka te kosolola mpambampamba na bato oyo bafandi pene na yo to kotala makambo oyo bato mosusu bazali kosala. Kotika te ete makanisi na yo ezala na makambo oyo okosala nsima ya makita to kokanisa makambo na yo mosusu.
◼ Kanisá makambo oyo ezali kolobama. Omituna boye: ‘Ndenge nini makambo yango etaleli ngai? Ndenge nini nasengeli kosalela makambo yango?’
◼ Zwá mwa nɔti ya makambo ya ntina oyo ezali kolobama mpe ya mikapo ya Makomami. Yango ekosalisa yo otya makanisi na yo na makambo oyo ezali kolobama mpe ekosalisa yo omikundola makambo yango mpo na kosalela yango na nsima.
3 Teyá bana na yo ndenge ya koyoka: Bana bazalaka na mposa ya mateya ya elimo. (Det. 31:12) Na ntango ya kala, “moto nyonso oyo ayebaki koyoka” kati na basaleli ya Nzambe asengelaki kolanda malamumalamu ntango Mibeko ezalaki kotángama liboso na bango. (Neh. 8:1-3) Soki baboti bazali mpenza kolanda makita mpe bazali kotya likebi, bana na bango mpe bakosala bongo. Ezali malamu te komema bana-popi to mikanda oyo ezali na mayemi na makita mpo bana básakanaka na yango. Lisusu kokende mbala na mbala na twalɛti ekopekisa bango koyoka malamu. Lokola “[bozoba] ezwami na motema ya mwana,” baboti basengeli kosala makasi mpo bana na bango báfanda esika moko mpe bálanda makita.—Mas. 22:15.
4 Soki tozali bayoki malamu, tokomonisa ete tozali na mayele mpe tolingi “kofulukisa mayele.”—Mas. 1:5.