Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/01 lok. 4
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Liyangani ya mokolo moko mpo na mobu 2010
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Liyangani ya sika ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Manaka ya liyangani ya zongazonga ya mbala ezali koya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 8/01 lok. 4

Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo

Motó ya likambo ya liyangani ya mokolo moko, oyo ekosalama na mobu ya mosala oyo ezali koya, euti mpenza na Makomami mpe elobi ete: “Bótosaka Nzambe, kasi bótɛmɛla Zabolo.” (Yak. 4:7, NW) Yango ezali toli oyo ebongi mpenza na mikolo oyo ya mpasi! Lokola tozali kotosa mibeko ya Nzambe, yango ezali kosala ete Satana abundisa biso makasi. Programɛ ya liyangani ekoteya biso ndenge ya kotɛmɛla mayele mabe oyo zabolo asalelaka mpo na kobebisa kondima na biso. Tika tólobela sikoyo mwa makambo kitoko ya elimo oyo tokoyoka na liyangani yango.

Mokɛngɛli ya zongazonga akomonisa ndenge nini “ Ezaleli ya kotosa Nzambe na kati ya libota” ekómisaka mabota makasi mpo eyika mpiko na mitungisi ya mokili. Lisolo oyo elobi “Kotɛmɛla Zabolo elakisi nini” ekozala lisukulu ya liboso oyo molobi-mopaya akosala na mokolo wana; na lisolo yango, akomonisa ntina oyo tosengeli kobunda mpo na kotɛmɛla mikano oyo Satana azali na yango ya kobebisa elimo na biso mpe ndenge nini tosengeli kosala yango. Ezali na masolo mibale oyo etali mpenzampenza bilenge, mpo bango mpe basengeli kozala ekenge liboso ya mikano ya Zabolo. Baklisto mingi, oyo bakómi lelo mikóló, baboyaki kolanda bamposa ya mokili ntango bazalaki bilenge. Ekozala esengo mingi koyoka mwa makambo oyo bakutaná na yango na bomoi.

Moto nyonso na mokili azali na mokumba ya kotosa bakonzi. Wana nde likambo oyo ekolobelama na lisukulu ya nsuka oyo molobi-mopaya akosala; kuna, akolobela makambo minei oyo na kati na yango tosengeli komonisa ezaleli ya kotosa Nzambe: (1) botosi epai ya Leta, (2) na lisangá, (3) na mosala ya mosuni, mpe (4) na kati ya libota. Liyangani oyo ebongi na biso mpenza!

Baoyo balingi kozwa batisimo na liyangani yango ya mokolo moko basengeli kopesa bankombo nokinoki epai ya mokɛngɛli-mokambi. Ekozala malamu ete biso nyonso tósimba malamu dati ya liyangani yango mpe tómibongisa malamu mpo na kolanda liyangani yango na mobimba. Soki tozali ntango nyonso kotosa Yehova, tokozwa mapamboli ya seko na seko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto