Ozali kosalela makambo oyo oyekolaki na Liyangani ya Etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe”?
1 Moto nyonso oyo akendeki na liyangani ya etúká na mbula oyo, amonaki ete Basaleli ya Yehova bazali na mokano ya kokokisa mokumba na bango ya koteya Liloba ya Nzambe. (Mat. 28:19, 20) Ntango ozongaki na ndako na yo, makambo nini ya ntina oyo oyekolaki, ozwaki mokano ya kosalela yango na bomoi na yo mpe na mosala ya kosakola?
2 Makomami mapemami mazali na litomba mpo na koteya: Motó ya likambo ya mokolo ya liboso elobelaki 2 Timote 3:16 (NW). Lisukulu-moboko emonisaki ete mpo na ‘kozala na nyonso oyo esengeli mpo na kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe,’ tosengeli kotalela Liloba ya Nzambe na motuya mingi, tosengeli komemya yango koleka makanisi mpe bonkɔkɔ nyonso ya bato, mpe kosalelaka yango ntango nyonso. Tosengeli mpe kobondela mokolo na mokolo mpo elimo santu esalisa biso na mosala na biso ya kosakola mpe tosengeli kosala makasi mpo na kobota mbuma na yango ya libosoliboso—bolingo. Lisusu tosengeli kotika ete ebongiseli ya Yehova, awa na mabele ebongisa biso lokola baministre na nzela ya makita nyonso ya lisangá.
3 Masukulu-matongani: “Tómiteyaka biso moko ntango tozali koteya bato mosusu,” oyo esalemaki na mokolo ya mitano emonisaki ete tosengeli kozala ndakisa malamu na (1) kotosa mibeko ya Nzambe oyo etaleli bizaleli malamu ya boklisto, (2) kokangama ntango nyonso na momeseno malamu ya koyekola, mpe (3) koboya bizaleli mpe mposa nyonso ya motema mpe makanisi oyo Zabolo akoki kosalela. Na nsima, toyekolaki makambo ndenge na ndenge oyo tokoki kosalela mpo na kobatela mabota na biso na bafilme, bafɔtɔ mpe mikanda oyo elakisaka bato bazali bolumbu, maladi mabe oyo epalangani na mokili. Baboti balendisamaki na kopesa ndakisa malamu epai ya bana na bango; basengeli te kotala ata mwa moke makambo oyo ezali kolakisa bato bazali kosangisa nzoto mpe basengeli kosɛnzɛla malamumalamu ndenge oyo bana na bango bazali kosalela Internet mpe televizyo. Makambo nini oyo oyokaki na programɛ ya mokolo ya mitano, osili kobanda kosalela yango?
4 Lisukulu ya nsuka ya mokolo yango elendisaki biso tokangama na ekateli na biso ya kolinga pole ya Yehova, kozala ntango nyonso pene ya etuluku ya bapakolami ya sembo ya Nzambe, mpe kobatela kimya kati na basaleli ya Yehova. Buku ya sika ebimaki: Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso II. Osili kotánga yango?
5 Tokoki malamumalamu mpo na koteya bato mosusu: Motó ya likambo ya mokolo ya mibale eutaki na 2 Timote 2:2 (NW). Ntango oyokaki masukulu-matongani oyo esalemaki mokolo ya pɔsɔ na ntɔngɔ, ozwaki nɔti ya makanisi oyo epesamaki mpo na ndenge ya (1) koluka bato oyo babongi, (2) kokolisa mposa na bango, mpe (3) koteya bango bátosa makambo nyonso oyo Klisto atindaki? Ozali kosalela makambo oyo oyekolaki—kolakisa epai ya moto oyo ozali kosolola na ye ata likambo moko na kati ya Makomami mpe kobimisa motuna moko to likambo moko oyo ekopesa yo nzela ya kozongela ye lisusu?
6 Programɛ ya nsima ya midi ebendaki likebi na ntina ya komekola Moteyi Monene Yesu. Makambo nini ozali kosala mpo na komekola ye? Na kotalela makambo oyo oyekolaki na masukulu-matongani ya mibale oyo esalemaki mokolo yango, ndenge nini omoni ete okoki ‘kozwa matomba mingi lisusu na mateya ya Teokrasi’? Makanisi nini osili kosalela mpo na kobongisa lisusu lolenge na yo ya kotya likebi ntango ozali koyekola yo moko mpe ntango ozali na makita ya lisangá?
7 Na ntembe te, buku ya sika Zwá matomba na mateya ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalisa biso tókolisa makoki na biso lokola balobi mpe bateyi ya Liloba ya Nzambe. Tokotya likebi mingi na makoki ya koloba oyo basaleli ya sembo ya Nzambe bazalaki na yango na ntango ya kala. Liteya mokomoko ya buku yango ezali na etanda oyo ezali komonisa polele mpenza likambo oyo tosengeli kosala, mpo na nini tosengeli kosala yango, mpe ndenge nini tosengeli kosala yango. Ezali mpe na bandakisa ebongi oyo epesami lokola devwarɛ. Bandeko basi bazali na bandakisa 29 oyo epesami lokola kadrɛ, oyo bakoki kosalela mpo na kosala masolo na bango. Na mikolo oyo ezali koya, mayebisi ekopesama mpo na makambo mosusu ya sika oyo ekokɔtisama na lolenge oyo Eteyelo esengeli kotambwisama. Ozali na programɛ malamu ya koyekola mpe ya komibongisa mpo na kozwa matomba mingi na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi pɔsɔ na pɔsɔ?
8 Tózala bateyi na kotalela ntango: Baebele 5:12 (NW) etyamaki likebi na mokolo ya lomingo. Masukulu-matongani oyo esalemaki na ntɔngɔ, oyo ezalaki na motó ya likambo “Esakweli ya Malaki ezali kobongisa biso mpo na mokolo ya Yehova,” elendisaki biso ete tópesa epai ya Nzambe biloko na biso ya motuya mpe tóyina lolenge nyonso ya kokosa mpo tókoka kobika na mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova. Drame oyo ezalaki na motó ya likambo: “Tómemya bokonzi ya Yehova,” emonisaki mpenza ndenge oyo lolendo, mposa makasi ya lokumu, zuwa, mpe bosembo oyo ebongi te ya Kola elongo na baninga na ye etindaki bango batombokela mpenza Yehova. Lisukulu oyo elimbolaki makambo oyo elekaki na drame yango ebendaki likebi na ntina ya ‘kotosa bokonzi ya Yehova na bosembo mpenza,’ na kati ya libota mpe ya lisangá. Lisukulu ya bato nyonso, “Banani bazali koteya solo epai ya bato ya bikólo nyonso?” emonisaki ete Batatoli ya Yehova nde bazali kosala yango na bokeseni na bato ya mangomba ya boklisto, baoyo balobaka kaka na monɔkɔ ete bango nde bateyaka solo ya Biblia.
9 Na ntembe te, Yehova azali kobongisa biso mpo tozala bateyi malamu mpenza ya Liloba na ye. Tiká tósalela makambo oyo toyekolaki, ‘tókeba mpo na biso moko mpe na mateya na biso, mpo tókoka komibikisa biso moko mpe baoyo bazali koyoka biso’—1 Tim. 4:16, NW.