Tósembola Liloba ya Nzambe malamumalamu
1 Ntango azalaki kopesa litatoli epai ya mokonzi moko ya Leta, “Filipo afungolaki monɔkɔ na ye mpe, kobandáká na Likomami [moko], asakolaki epai na ye nsango malamu oyo etali Yesu.” (Mis. 8:35, NW) Filipo azalaki “kosembola liloba ya solo malamumalamu.” (2 Tim. 2:15, NW) Kasi lelo oyo, bakɛngɛli-batamboli bamoni ete basakoli mingi bazali kosalela mpenza Biblia te ntango bazali kopesa litatoli. Bongo yo, osalelaka Biblia na mosala na yo ya kosakola?
2 Makambo nyonso oyo tondimaka mpe toteyaka eutaka na Liloba ya Nzambe. (2 Tim. 3:16, 17) Ezali yango nde ebendaka bato epai ya Yehova mpe eteyaka bango ndenge bakoki kozala na bomoi ya malamu. Yango wana, tosengeli kosalela Biblia ntango tozali na mosala ya kosakola na esika ya kosolola kaka masolo oyo esepelisi biso. (Ebe. 4:12) Lokola bato mingi bayebi Biblia malamu te, tosengeli kotángelaka bango yango mpo na komonisa bango toli malamu oyo Biblia ezali kopesa mpe makambo oyo ezali kolaka bato mpo na mikolo oyo ezali koya.
3 Tángá mpenza na kati ya Biblia: Okoki komeka kokende kosakola kozanga komema sakosi ya monene. Okoki kotya mwa mikanda oyo okolakisa bato na mwa sakosi ya moke lokola oyo bamemaka na yango bapapye mpe okoki kotya Biblia na libenga to kosimba yango na lobɔkɔ. Na bongo, ntango okobanda kosolola na moto, okoki kobimisa Biblia kozanga ete moto yango amona ete olingi kosalela ye lisukulu. Osengeli kotɛlɛma na ndenge oyo ekosala ete moto oyo ozali kosolola na ye akoka mpe kolanda yo ntango ozali kotánga na kati ya Biblia. Mbala mosusu okoki kosɛnga moto yango atánga vɛrsɛ moko na mongongo makasi. Soki moto amoni ye moko likambo oyo Biblia elobi, yango ekosimba mpenza motema na ye koleka soki ayoki yo kaka koyoka. Mpo na kosalisa ye akanga ntina ya vɛrsɛ oyo otángi, osengeli konyata maloba ya ntina oyo ezali na kati ya vɛrsɛ yango.
4 Ndenge ya kosala lisolo oyo ekozala na vɛrsɛ moko ya Biblia: Soki opesi nkombo na yo, na nsima okoki koloba boye: “Bato bazali koluka epai na epai ndenge ya kotambwisa bomoi na bango. Mpo na yo, epai wapi tokoki kozwa toli ya malamu koleka toli nyonso? [Tiká ye ayanola.] Okanisi nini mpo na maloba oyo? [Tángá Masese 2:6, 7, mpe tiká ye ayanola.] Mayele ya bato esali ata eloko moko ya malonga te, esali kutu nde ete ebele ya bato báyeba lisusu eloko ya kosala te. Nzokande, mayele oyo ezali kouta epai ya Nzambe emonisi ete tokoki ntango nyonso kotyela yango motema mpe epesaka matomba.” Na nsima, lakisá ye mokanda oyo ozali kolakisa bato, mpe monisá na kati na yango ndakisa moko ya mayele ya Nzambe.
5 Yesu asalelaki Makomami mpo na kosalisa bato ya motema sembo. (Luka 24:32) Paulo azalaki komonisa ete makambo oyo azali koteya euti mpenza na Makomami. (Mis. 17:2, 3) Soki tokómi na makoki mingi ya kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu, tokokakatana te mpo na koloba na mosala ya kosakola mpe tokozala na esengo mingi na mosala yango.