Ozali kosalela mwa buku Azali kosɛnga mpo na kobanda koyekola na bato?
1 Oyebaka ete soki ozali kosolola masolo ya Biblia mbala na mbala na moto moko oyo asepelaka na yango, ata bolobi makambo mingi te, kasi makambo yango euti na mikanda oyo ebongisami mpo na koyekola na bato Biblia, ozali nde kotambwisa boyekoli ya Biblia? Ya solo, ezali mpenza bongo, ata soki bosololaka kaka liboso ya porte ya ndako na ye to na telefone. Mpo na nini te kosala lisusu makasi na sanza ya Mai mpe ya Yuni ete obanda koyekola na bato na lisalisi ya mwa buku Azali kosɛnga?
2 Mpo na kolonga, esengeli komibongisa: Ntango ozali kolakisa moto mwa buku Azali kosɛnga, yebá malamu lisolo nini olingi bótalela. Soki ezali bozongeli ya sika, kanisá lisolo oyo bosololaki mbala ya liboso oyo bokutanaki. Omituna motuna oyo: ‘Baparagrafe nini ya mwa buku yango nakoki mpenza konyata mpo na kobakisa makanisi mosusu likoló na lisolo na biso ya mbala eleki mpo ekoka komema biso na koyekola Biblia?’ Soki ozali kosakola ndako na ndako, luká koyeba lisolo nini ekosepelisa elenge, mokóló, mobali to mwasi. Talelá lisusu motó ya likambo ya liteya mokomoko ya mwa buku yango mpe poná oyo ekoki kosimba mitema ya bato. Nsima ya kopona lolenge oyo okosala, meká yango mbala na mbala. Soki olingi obandaka koyekola na bato na mwa buku yango, osengeli kosalaka bongo.
3 Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Yanuali 2002 epesi “Makanisi [mwambe] oyo ekoki kosalisa biso mpo na kolakisa mwa buku Azali kosɛnga.” Etanda “Ndenge ya kobanda koyekola na moto ntango bokutani mbala ya liboso,” emonisi ndenge ya kosalela mwa buku yango mpo na kobanda koyekola na bato. Okoki kobongola mwa moke likanisi ya liboso oyo ezali na etanda yango mpe kokómisa yango boye:
◼ “Oyebi ete kaka na miniti moke okoki kozwa eyano na motuna moko ya ntina oyo etali Biblia? Na ndakisa, mpo na nini tozali lelo oyo na ebele ya mangomba oyo emikumisaka ete ezali kolanda mateya ya Klisto? Omituná naino te likambo yango?” Nsima ya koyoka eyano na ye, fungolá mwa buku yango na liteya 13 mpe talelá elongo na ye paragrafe mibale ya liboso. Soki ntango ezali, tángá mpe limbolá vɛrsɛ moko to vɛrsɛ mibale. Na nsima, tángá motuna ya nsuka kati na oyo etyami likoló ya lokasa mpe lobá ete: “Eteni oyo etikali na liteya oyo ezali komonisa makambo mitano oyo ekoki kosalisa moto na koyeba lingomba ya solo. Nakosepela kozongela yo mpo tótalela makambo yango.”
4 Kolɛmba te: Luká kosalela mabaku nyonso mpo na kolakisa bato ndenge toyekolaka Biblia na lisalisi ya mwa buku Azali kosɛnga. Sɛngá mapamboli ya Yehova. (Mat. 21:22) Soki olandi kosala milende, yo mpe okoki koyoka esengo oyo eutaka na kosalisa moto mpo andima nsango malamu!