Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/02 lok. 1
  • Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Manáka ya liyangani ya zongazonga na mbala ekoya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Okoki kotyela bandeko na yo motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Tosengeli kotyela bato motema mpo na kozala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 7/02 lok. 1

Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo

1 Mpo tózala ntango nyonso na kondima makasi na mokili oyo ezali se kobongwana, tosengeli kotyela Yehova motema. Yango elimboli mpenza nini? Kotyela Yehova motema ekosala nini na bomoi na biso mpe na bomoi ya libota na biso? Na ndenge nini yango ezali kosalisa biso tóboya kolanda makambo ya mokili ya Satana? Liyangani ya zongazonga mpo na mobu ya mosala 2003 ekopesa biyano na mituna yango. Motó ya likambo na yango ezali ‘Tótyela Yehova motema mpe tósala oyo ezali malamu.’​​—⁠Nz. 37:​3, NW.

2 Tosengeli te kotyela Yehova motema kaka na makambo ya minene to na ntango tokeleli mpenza. Tosengeli nde kosala yango na makambo nyonso ya bomoi na biso. Lisukulu ya liboso, oyo ezali na motó ya likambo “Tótyela Yehova motema ntango nyonso,” ekolobela mingi likambo yango. (Nz. 62:​8, NW) Masukulu-matongani ya biteni minei, oyo ezali na motó ya likambo “Tómonisa ete totyelaka Yehova motema” ekomonisa biso ndenge oyo tokoki kozwa mpe kosalela makanisi oyo euti na Biblia, oyo ekoki kosalisa biso mpo na kozala na libala ya malamu, mpo na kosilisa mikakatano oyo ebimaka na kati ya libota, mpe mpo na kokokisa bamposa na biso ya mosuni.

3 Mokili ya Satana ezali kosala nyonso mpo na kotya biso na mobulungano mpo tóyeba lisusu te kokesenisa mabe na malamu, makambo oyo ezali na ntina na oyo ezangi ntina. (Yis. 5:20) Lisukulu oyo ezali na motó ya likambo “Tókeba na makambo ezangá ntina” mpe mosusu oyo ezali na motó ya likambo “Tókima mabe​​—⁠Tósalaka oyo ezali malamu” ekolendisa ekateli na biso ya kolanda mibeko ya Yehova oyo eleki malamu.​​—⁠Amo. 5:⁠14.

4 Na ntango oyo Yehova akotya nsuka na ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo, ekosɛnga ete basaleli na ye bátyela ye mpenza motema. Likambo yango ekolobelama mingi na lisukulu ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Bampasi ya mokili oyo ekómi pene na kosila.” Nsima na yango, lisolo oyo elobi ete “Okotángama ete obongi mpo na Bokonzi ya Nzambe?” ekotinda mokomoko na biso amitalela malamu. Liyangani yango ekosuka na lisukulu oyo ekolendisa biso “Tótyela bilaka ya Yehova motema.”

5 Na mayangani nyonso, lisukulu ya batisimo ezalaka lisolo moko ya ntina mingi. Mosakoli nyonso oyo alingi kozwa batisimo asengeli koyebisa libela mokɛngɛli-mokambi mpo akoka kozwa bibongiseli oyo esengeli.

6 Na mikolo oyo etondi na yikiyiki, kaka Yehova nde akoki kopesa biso elikya ya solo mpe kimya ya solo. (Nz. 118:​8, 9) Tiká ete biso nyonso tózala na liyangani yango ya zongazonga, banda ebandeli tii na nsuka, mpo na komonisa ete tozali kotyela ye motema makasi lisusu koleka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto