Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/02 lok. 1
  • Sakolá nsango ya Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sakolá nsango ya Bokonzi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Bokonzi oyo “bokobebisama soko moke te”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Nsango oyo tosengeli kosakola
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 12/02 lok. 1

Sakolá nsango ya Bokonzi

1 “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Na maloba oyo, Yesu amonisaki motó ya likambo ya mosala na ye ya kosakola​​—⁠Bokonzi ya Nzambe. Nsango tosakolaka lelo etongami mpe likoló ya Bokonzi, ndenge elobami na Matai 24:14: “Mpe nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” Solo nini oyo etali Bokonzi ya Nzambe bato basengeli koyoka?

2 Bokonzi ya Nzambe ezali sikoyo koyangela na likoló mpe mosika te ekolongola biyangeli nyonso ya bato. Basilá kobengana Zabolo na likoló, mpe ebongiseli ya makambo ya ntango oyo esili kokɔta na mikolo na yango ya nsuka. (Emon. 12:​10, 12) Mokili ya mabe oyo Satana azali kotambwisa ekobomama mobimba, kasi Bokonzi ya Nzambe ekoningana ata koningana te. Ekotikala seko.​​—⁠Dan. 2:44; Ebe. 12:⁠28.

3 Bokonzi yango ekokokisa mpenza bamposa malamu ya bato nyonso. Ekolongola mpasi oyo ebimaka mpo na bitumba, kobomana, konyokolana, mpe bobola. (Nz. 46:​8, 9; 72:​12-14) Bilei ekozala beboo mpo na bato nyonso. (Nz. 72:16; Yis. 25:⁠6) Bamaladi mpe kobeba binama ya nzoto ekokanisama lisusu te. (Yis. 33:24; 35:​5, 6) Na ntango bato bakobanda kozonga bato ya kokoka, mabele ekobongolama paladiso mpe bato bakofanda elongo na boyokani mpenza.​​—⁠Yis. 11:​6-9.

4 Makambo oyo tozali kosala sikoyo ezali komonisa ete tolingi kozala bato ya Bokonzi ya Nzambe to te. Nsango ya Bokonzi esengeli kotambwisa bomoi na biso mobimba, ezala mikano na biso to mpe makambo oyo totyaka na esika ya liboso. Na ndakisa, atako tozali na mokumba ya koleisa ndako na biso na mosuni, tokoki te kotika mitungisi ya biloko ya mosuni elɛmbisa milende na biso mpo na matomba ya Bokonzi. (Mat. 13:22; 1 Tim. 5:⁠8) Kasi, tosengeli kolanda likebisi ya Yesu oyo: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu [biloko oyo esengeli mpo na mosuni] ekobakisamela bino.”​​—⁠Mat. 6:⁠33.

5 Esengeli bato básala nokinoki báyoka mpe báyokanisa bomoi na bango na nsango ya Bokonzi wana ntango ezali naino. Tiká ete tósalisa bango na ‘kosaleláká mayele ya kondimisa na oyo etali bokonzi ya Nzambe.’​​—⁠Mis. 19:⁠8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto