Osengeli kotala video No Blood—Medecine Meets the Challenge
Oyebi malamu bankisi mpe mayele mpo na kobikisa moto kozanga kosalela makila? Oyebi mpenza mayele to nkisi mosusu ya kobikisa moto oyo bakoki kosalela na esika ya kotya ye makila mpe ndenge nini basalelaka yango? Talá video oyo, mpe meká boyebi na yo na mituna oyo elandi.—Liyebisi: Lokola video yango ezali na bililingi ya lipaso, baboti basengeli kosalela bososoli ntango bazali kotala video yango na bana mike.
(1) Ntina mpenza oyo Batatoli ya Yehova baboyaka kozongisama makila ezali nini, mpe etinda yango ezali wapi na Biblia? (2) Na oyo etali komisalisa epai ya monganga, tozalaka na mposa nini? (3) Lotomo nini moto ya maladi nyonso azalaka na yango? (4) Mpo na nini koboya kozongisama makila ezali komonisa mayele mpe bososoli? (5) Ntango makila ya moto ebimi mingi, wapi makambo mibale ya ntina minganga basengeli kosala nokinoki? (6) Makama nini ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto ekoki kobima mpo na kozongisama makila? (7) Wapi bisaleli mosusu minganga basalelaka mpo makila ebima mingi te na ntango ya lipaso? (8) Makambo nini osengeli koluka koyeba oyo etali mayele mosusu ya komisalisa na monganga kozanga kosalela makila? (9) Bakoki kosala moto lipaso moko ya monene mpe ya mpasi kozanga ete bázongisa ye makila? (10) Likambo nini minganga ebele bakómi kondima kosala mpo na Batatoli ya Yehova, mpe nini etikali moke ekóma ndakisa mpo na kosalisa bato nyonso?
Na ntembe te, ekozala malamu mpenza kotala video No Blood elongo na moyekoli nyonso ya Biblia, mobalani to ndeko oyo azali Motatoli te, baninga ya mosala, balakisi, mpe baninga na eteyelo oyo bakoki kotuna biso mituna etali bindimeli na biso mpo na likambo ya makila. Kondima kosalela lolenge moko ya komisalisa na monganga kati na oyo balakisi na video oyo etali ekateli ya moto na moto.—Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni mpe ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2000.