Liloba ya Nzambe ezali solo
1. Makambo nini ya ntina ezali na Biblia?
1 Mokomi ya nzembo akomaki ete: “Liloba na yo mobimba ezali solo.” (Nz. 119:160, NW) Na nzela ya Liloba na ye oyo epemami, Yehova azali kopesa biyano ya malamu na mituna ya ntina mingi oyo etali bomoi. Azali kobɔndisa mpe kopesa elikya epai na baoyo bazali na mikakatano. Mpe azali komonisa biso oyo tokoki kosala mpo na kopusana penepene na ye. Mwasi moko alobaki boye na botɔndi nyonso: “Koyeba solo ya Biblia ezali lokola kobima na esika moko ya molili makasi mpe ya mabe, mpe kokɔta na ndako moko ya kitoko oyo mwinda ezali kopela makasi.” Osalaka makasi ete osakola solo ya Liloba ya Nzambe na mabaku nyonso?
2. Ndenge nini Biblia ekómisaka bomoi ya bato malamu mingi?
2 Nguya ya Biblia ebongolaka mpe ebendaka bato ya ndenge nyonso: Solo ya Biblia ezali na nguya ya kosimba mitema mpe ya kobongola bomoi ya bato. (Ebe. 4:12) Rosa, elenge mwasi moko oyo amipesaki na kindumba, na kolangwa masanga mpe komɛla bangi, alobaki boye: “Mokolo moko, wana nazalaki ata na elikya moko te, babalani mibale oyo bazalaki Batatoli, basololaki na ngai na ntina na lolenge oyo Biblia ekoki kosalisa biso na kosilisa mikakatano na biso. Nabandaki koyekola Liloba ya Nzambe, oyo nasepelaki na yango mingi. Nsanza esilaki te, nazwaki makasi ya kopɛtola bomoi na ngai mpe ya kobanda bomoi ya sika. Lokola nakangaki ntina ya bomoi, nazalaki lisusu na mposa ya masanga mpe bangi te mpo esalisa ngai. Lokola nalingaki mpenza kozala moninga ya Yehova, nazwaki ekateli makasi ya kotosa mitinda na ye. Soki ezalaki bwanya ya Liloba ya Nzambe te, nandimi solo ete lelo oyo mbɛlɛ nasi namibomá.”—Nz. 119:92.
3. Mpo na nini tosengeli kotika te koyebisa bato nyonso nsango ya Biblia?
3 Na kokesene na ebele ya babuku ya ntango na biso, Biblia esimbaka mitema ya bato ya ‘bikólo nyonso, mabota nyonso, mikili nyonso, mpe minɔkɔ nyonso.’ (Emon. 7:9) Mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4) Yango wana, tosengeli ata moke te kokanisa ete moto boye akoboya kondima nsango malamu kaka mpo na esika oyo ye auta. Na esika ya kosala bongo, tosengeli nde koyebisa bato nyonso nsango malamu ya Bokonzi, mpe kotángela bango yango mbala moko na Biblia, ntango nyonso oyo likoki emonani.
4. Ndenge nini tokoki kosalela Biblia ntango tozali kopesa litatoli?
4 Salelá Makomami: mabaku ezali ebele ya kosalela Biblia na mosala ya kosakola. Ntango ozali kolakisa bazulunalo, meká kokɔtisa na lisolo na yo mokapo oyo batye na Mosala na biso ya Bokonzi mpo na komonisa lolenge ya kolakisa bazulunalo. Basakoli mosusu bamonaka malamu kosalela vɛrsɛ moko oyo baponaki yango malamumalamu liboso, na ebandeli ya lisolo na bango, ntango bazali kolaki mokanda oyo esengeli kokabolama na nsanza wana. Ntango ozali kosala bozongeli ya sika, salelá vɛrsɛ moko to mwa mingi mpo na kosalisa moto oyo okei kotala ete azwa mokemoke boyebi ya solo. Ntango ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia, bósalela bavɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo bozali kotalela. Ata soki ozali na mosala ya kosakola te, osengeli ntango nyonso kozala na Biblia na yo mpo na kosalela yango soki libaku emonani ya kopesa litatoli ya libaku malamu.—2 Tim. 2:15.
5. Mpo na nini tosengeli kosala makasi ete tósalelaka Biblia ntango tozali na mosala na biso ya kosakola?
5 Tósalisa bato mosusu mpo bázwa litomba na nguya ya Liloba ya Nzambe, oyo ezali solo, na kosaleláká Biblia na mabaku nyonso na mosala ya kosakola.—1 Tes. 2:13.