Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/03 lok. 3
  • Tóyekola buku Tósambela Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyekola buku Tósambela Nzambe
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Tóyekola Biblia na bato na lisalisi ya buku Tósambela Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Tósepela koyekola buku Biblia eteyaka mpenza nini?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mpo na nini tozali na mposa ya boyekoli ya mokanda ya lisangá?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Bolamu bozali kozwama na boyekoli
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 9/03 lok. 3

Tóyekola buku Tósambela Nzambe

Buku Tósambela Nzambe kaka moko ya solo ebongisami mpo na koyekola yango na bato ya sika oyo basilisi koyekola buku Boyebi. Kotalela buku yango na Boyekoli ya mokanda ekopesa biso likoki ya kosalela yango na mosala ya kosakola mpe ekosalisa biso tólinga mpe tózala na botɔndi mpo na Yehova mpe ebongiseli na ye. Ndenge nini tokoki kozwa matomba mingi na boyekoli na biso ya buku Tósambela Nzambe?

Ndenge ya kotambwisa boyekoli: Lokola tokobanda koyekola mokapo mobimba na pɔsɔ, bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda basengeli koyeba kosalela ngonga malamu. Basengeli kobenda boyekoli molaimolai te na baparagrafe ya ebandeli, kasi bakotika ntango mingi mpo na kotalela makanisi ya ntina oyo mingimingi ezalaka na kati ya mokapo. Kotalela na mokuse mituna ya bozongeli, oyo ezali na etanda na nsuka ya mokapo mokomoko, ekosalisa bayangani ete bákanga makanisi ya ntina ya boyekoli.

Pene na katikati ya mikapo ya buku Tósambela Nzambe ezali na mituna, oyo ezali kotinda na komanyola mpe na kopesa makanisi. Ndakisa moko ezali na nkasa 48-49. Ezali na ntina te kotánga mituna yango ntango bozali kotánga baparagrafe. Ntango mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda azali kotuna bayangani mituna yango, akosɛnga mpe bango bátánga mpe bálimbola bavɛrsɛ oyo etyami na nsuka ya mituna yango, soki ntango epesi nzela.

Komibongisa liboso: Komibongisa malamu mpo na boyekoli esuki kaka te na kotya mikɔlɔtɔ na bisika oyo biyano ezali. Kokanisa malamumalamu likoló ya bavɛrsɛ oyo epesami ekosalisa biso tósuka kaka te na kobongisa biyano oyo tokopesa, kasi mingi mpenza na kobongisa mitema na biso. (Ezl. 7:10) Biso nyonso tokoki kolendisa bamosusu soki tozali kopesa biyano ya milaimilai te.​—Lom. 1:11, 12.

Boyekoli ya buku Tósambela Nzambe ekosalisa biso tópusana penepene na Yehova mpe ekopesa biso likoki ya kosalisa bato ya mitema sembo ete básangana na biso mpo na kosambela Yehova. (Nz. 95:6; Yak. 4:8) Tiká ete biso nyonso tózwa matomba mpenza na ebongiseli malamu oyo ya elimo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto