Tóluka baoyo babongi
1 Malako oyo Yesu apesaki mpo na kokokisa mosala ya kosakola ezali kotya biso na mokakatano moko. Alobaki boye: “Na engumba nyonso to mboka nyonso bokokɔta, bóluka nani kati na yango abongi.” (Mat. 10:11) Lokola lelo oyo bato mingi bafandaka lisusu mpenza na bandako na bango te, ndenge nini tokoki kokokisa etinda yango malamumalamu?
2 Yebá teritware na yo malamu: Bandá naino na koyeba teritware na yo. Ntango nini bato mingi bazalaka na ndako? Bazalaka wapi na moi? Ezali na mokolo moko to ngonga moko oyo bakoki koyamba yo? Soki otye ntango ya kobima na mosala ya kosakola na kotalela ntango oyo bato ya teritware na yo bazalaka na ndako mpe na kotalela makambo basalaka, okoki kozwa matomba ya malamu mpenza.—1 Kol. 9:23, 26.
3 Basakoli mingi bakutaki bato mingi na bandako na bango mpo bakendeki kotala bango ntango moi ebandi kolala. Na bangonga wana, bato mosusu bazalaka na mitema ya kokita mpe mbala mingi bandimaka koyoka. Kopesa litatoli na telefone na mpokwa ekoki mpe kopesa matomba. Kosakola na bisika ya mombongo mpe na bisika mosusu oyo bato bazalaka mingi ezali mpe ndenge mosusu ya koyebisa bato mingi nsango malamu.
4 Na sanza moko oyo esɛngaki ete basakoli básakola mingi, lisangá moko bayokanaki mpo básakolaka mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo na bampokwa, mpe na mokolo ya misato mpe ya mitano na mpokwa. Bazwaki mpe ebongiseli ya kopesa litatoli na telefone mpe ya kosakola na bisika ya mombongo. Basakoli basepelaki mingi na bibongiseli yango, yango wana lisangá yango emonaki malamu bálanda kosalela bibongiseli yango.
5 Zalá na molende ya kozongela bato: Soki na teritware na bino ezalaka mpasi kokuta bato na bandako na bango ntango bozongeli bango; mbala ya liboso oyo osololi na moto mpe mbala nyonso oyo okobanda kozongela ye, meká koyokana na ye libela na nsuka ya lisolo na bino mokolo mpe ngonga oyo bokokutana lisusu. Mpe salá makasi ete okokisa elaka oyo opesi ye. (Mat. 5:37) Soki osepeli, okoki kosɛnga moto yango nimero na ye ya telefone. Yango ekoki kosalisa yo na kosolola na ye lisusu.
6 Na ntembe te, Yehova akopambola milende oyo tozali kosala mpo na koluka baoyo babongi mpe kozongela bango mbala na mbala mpo na kosalisa bango bálanda kosepela na nsango na biso.—Mas. 21:5.