Kobá kosakola misala ya kokamwa ya Yehova
1. Misala nini ya kokamwa ya Yehova esepelisaka yo mingi?
1 Moto moko te akokani na Yehova, Nzambe na biso monene. Davidi akomaki ete: “Ee [Yehova], Nzambe na ngai, yo osali makambo mingi, misala na yo ya kokamwa mpe mikano na yo ezali mpo na biso; mosusu lokola yo azali te.” (Nz. 40:5) Na misala ya kokamwa ya Yehova, tokoki kotánga: molɔ́ngɔ́ oyo akelá, Bokonzi ya Masiya, misala oyo emonisaka motema-boboto na ye epai ya basaleli na ye, mpe mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na mokili mobimba. (Nz. 17:7, 8; 139:14; Dan. 2:44; Mat. 24:14) Bolingo na biso mpo na Yehova mpe botɔndi oyo tozali na yango mpo na makambo nyonso asali etindaka biso tóyebisa bato mosusu makambo na ye. (Nz. 145:5-7) Tokozwa libaku ya kosala yango malamumalamu na sanza ya Marsi, ya Aprili, mpe ya Mai.
2. Matomba nini biso moko tozwaka ntango tosalaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi?
2 Kozala mobongisi-nzela mosungi: Na basanza yango ya mosala mingi, okoki kobongisa programɛ na yo mpo na kosala ngonga 50 na mosala ya kosakola na sanza moko to koleka? Na ntembe te, mbongwana nyonso oyo okosala mpo na yango ekozala na ntina mingi. (Ef. 5:16) Mingi bamonaka ete mosala ya mobongisi-nzela mosungi esalisaka bango na kobongisa ndenge na bango ya kosakola. Babangaka lisusu te ntango bazali kosakola ndako na ndako mpe bakómaka kosalela Biblia mingi. Soki moto azali kosakola mingi, akozala na mpasi te mpo na kozongela bato nyonso oyo basepelaki, mpe basakoli mosusu oyo bazalaki ata na moto moko te ya koyekola na ye Biblia bazwaki ata moto moko ntango basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Mosala ya mobongisi-nzela mosungi epesaka esengo mingi mpamba te esɛngaka tómipesa mpo na bolamu ya basusu.—Mis. 20:35.
3. Ndenge nini basusu balongaki kosala mosala ya mobongisi-nzela atako yango ezalaki pɛtɛɛ te mpo na bango?
3 Kokanisa mbala moko te ete okokoka te kosala mosala yango. Nkulutu moko, oyo azali na bana mibale mpe asalaka mosala mokolo mobimba, asalaki mosala yango na mbula eleki. Ndenge nini ndeko yango oyo azalaki na makambo mingi ya kosala alongaki kosala mosala yango? Lokola asalaka mosala mokolo mobimba, asalaki programɛ mpo abanda kosakola mingi na bawikende; na mokolo ya pɔsɔ azalaki kobanda kopesa litatoli na balabala na ngonga ya 7:00. Basakoli mingi ya lisangá na bango, oyo bazalaki mpe na makambo mingi ya kosala, basalaki mpe mosala ya mobongisi-nzela mosungi; basalisanaki mpe balendisanaki. Na lisangá mosusu, ndeko mwasi moko ya mbula 99 asɛngaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Mai; mwana na ye ya mwasi oyo azalaki kosala mosala yango nde alendisaki ye. Basakoli mosusu basalisaki ndeko yango oyo akómaki mobange, bazalaki kotindika velo na ye mpo na kokende kosakola na ye ndako na ndako mpe koyekola na bato Biblia. Azalaki kopesa litatoli na telefone, na balabala, mpe na mikanda oyo azalaki kokomela bato. Ye moko andimi ete asalaki yango na makasi na ye moko te, kasi nde na lisalisi ya Yehova.—Yis. 40:29-31.
4. Makambo nini tosengeli kotalela ntango tozali kosala programɛ mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi?
4 Meká kosala programɛ moko oyo ebongi na yo mpe komá yango. Okoki mpe kosalela manaka oyo ezali na lisolo oyo. Osalaka mosala mokolo mobimba to ozali nde mwana-kelasi? Ekozala malamu ozala na programɛ ya kosakola mingi na bawikende. Soki ozali nzoto kolɔngɔnɔ mpenza te mpe ozali na makasi mingi te ya kosakola mokolo mobimba, ekozala malamu osala programɛ ya kosakolaka mokemoke mikolo nyonso. Yebisá basakoli mosusu ete olingi osala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Mbala mosusu bango mpe bakomityela mokano yango.
5. Mikano nini bilenge bakoki komityela na sanza ya Marsi, ya Aprili, mpe ya Mai?
5 Ndenge bilenge bakoki mpe kosala mingi: Yehova asepelaka komona bilenge bazali kosakola misala na ye ya kokamwa. (Nz. 71:17; Mat. 21:16) Soki ozali elenge mpe ozwá batisimo, mbala mosusu okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi sanza moko na ntango bozali na konje. Soki okokoka kosala yango te, okoki nde komityela mokano ya kosala mingi mpe ya kobongisa ndenge na yo ya kosakola na basanza oyo tozali kolobela awa? Soki obimaka na mosala ya kosakola elongo na baboti na yo kasi okómi naino mosakoli te, oyo ezali sikoyo ntango malamu osala makasi mpo na kokokisa masɛngami. Kokanisa te ete osengeli kozela okóma naino na mayele mingi ya kopesa biyano na mituna etali makambo ya Biblia, to oyeba makambo mingi lokola mikóló oyo bazwá batisimo. Oyebi mateya ya ntina ya Biblia? Otosaka mibeko ya Biblia oyo etali bizaleli malamu? Olingi kokóma Motatoli ya Yehova? Soki ɛɛ, sololá na baboti na yo mpo na likambo yango. Bakoki kosɛnga bankulutu básolola na yo na miso na bango mpo na koyeba soki okokisi masɛngami.—Talá buku Lisanga, nkasa 99-100.
6. Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli ya Biblia bákóma basakoli ya nsango malamu?
6 Tósalisa basusu básakola: Bayekoli ya Biblia oyo bazali kokola bakoki mpe kokokisa masɛngami mpo na kosakola elongo na biso na boumeli ya basanza ya mosala mingi oyo tozali kozela. Soki oyekolaka Biblia na moto moko oyo azali kokola malamu, sɛngá lisalisi epai ya mokɛngɛli na bino ya boyekoli ya mokanda to ya mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Moko na bango akoki kozala na yo ntango okokende koyekola na moto yango mpo na komona bokoli na ye. Soki akokisi masɛngami mpe azali na mposa ya kokóma mosakoli, mokɛngɛli-mokambi akobongisa ete bankulutu mibale bákutana na ye elongo na yo. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1988, lokasa 17, ebimeli ya Lifalanse.) Soki bankulutu bapesi ye nzela ya kobanda kosakola, bandá mbala moko kopesa ye formasyɔ na mosala ya kosakola.
7. Ndenge nini kosalisa baoyo batiká kosakola mpe baoyo basakolaka lisusu sanza na sanza te?
7 Bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda basengeli kotya likebi mingi na baoyo batiká kosakola mpe baoyo basakolaka sanza na sanza te. Bóbenga bango mpo na kobima na bango na mosala ya kosakola. Mpo na baoyo batiká kosakola banda basanza mingi, ezali malamu ete bankulutu mibale básolola na bango naino mpo na koyeba soki bazali mpenza kokokisa masɛngami. (Talá Biyano na mituna na bino na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2000.) Molende oyo basakoli ya lisangá bakosala na basanza yango ya mosala mingi ekoki kolendisa bango bákóma na momeseno ya kobimaka na mosala ya kosakola.
8, 9. Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kolendisa basakoli mosusu ete básakola mingi?
8 Omibongisa kobanda sikoyo mpo na kosala mingi: Bankulutu, bóbanda sikoyo kolendisa basakoli na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Bokoki kosalisa mpenza bango soki bozali kolobela mosala yango na ndenge ya malamu mpe soki bozali kopesa ndakisa malamu na likambo yango. (1 Pet. 5:3) Na mitángo nyonso ya babongisi-nzela basungi oyo bosí bozwá na lisangá na bino, oyo wapi eleki? Bokoki kolekisa motángo yango mbula oyo? Bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda mpe basungi na bango basengeli kosala nyonso mpo na kosalisa baoyo bazali na bituluku na bango ete básakola mingi. Bakɛngɛli na mosala ya kosakola bakoki kobongisa makita mosusu mpo na mosala ya kosakola. Bóyebisa lisangá bibongiseli yango liboso mpenza. Bóluka basakoli ya makoki oyo bakoki kotambwisa makita mpo na mosala ya kosakola mpe bósala ete makita yango ebanda mpe esila na ngonga oyo esengeli. (Talá Biyano na mituna na bino na Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2001.) Mokɛngɛli na mosala ya kosakola asengeli mpe kobongisa bateritware, bazulunalo mpe mikanda oyo ekoki.
9 Mbula eleki, bankulutu ya lisangá moko babandaki liboso mpenza kolendisa basakoli na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, mpe mingi kati na bango moko bankulutu basɛngaki mosala yango. Babongisaki makita mosusu mpo na mosala ya kosakola: likita moko na 5:30 mpo na kopesa litatoli na balabala, likita mosusu na 15:00 mpo na bana oyo bauti kelasi, mpe ya misato na 18:00 mpo na baoyo bauti mosala. Longolá yango, babongisaki makita mosusu misato mpo na mosala ya kosakola na mokolo ya pɔsɔ. Yango esalaki ete, na sanza ya Aprili, basakoli 66 ya lisangá yango básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
10. Ndenge nini mabota bakoki komibongisa mpo na kosala mingi?
10 Na boyekoli na bino ya libota oyo ekolanda, mpo na nini te komityela mikano malamu mpo na basanza ekoya? Soki libota babongisi makambo nyonso liboso mpe bapesani mabɔkɔ, basusu kati na bango to bango nyonso bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Soki likoki ya kosala bongo ezali te, bómityela mokano ya kosakola ntango molai to ya kobakisa mikolo mosusu ya kobima na mosala ya kosakola. Bóbondela libota mobimba mpo na yango. Bózala na kondima ete Yehova akopambola milende na bino.—1 Yoa. 3:22.
11. (a) Makambo nini ya kokamwa mbeka ya Klisto ekokisaki? (b) Na ngonga nini mpe na esika nini bokosala Ekaniseli na lisangá na bino?
11 Mosala ya kokamwa ya Nzambe oyo eleki nyonso: Elembo eleki monene ya bolingo ya Yehova ezali likabo ya bomoi ya Mwana na ye oyo apesaki lokola lisiko mpo na kobikisa biso. (1 Yoa. 4:9, 10) Mbeka yango nde epesi bato likoki ya kosikolama na lisumu mpe na liwa. (Lom. 3:23, 24) Makila ya Yesu oyo esopanaki endimisaki kondimana ya sika, esalaki ete bato ya kozanga kokoka bákóma bana ya Nzambe mpe bázwa elikya ya koyangela na Bokonzi ya likoló. (Yil. 31:31-34; Mko. 14:24) Oyo eleki nyonso ezali ete botosi oyo Yesu amonisaki na makambo nyonso esantisaki nkombo ya Yehova. (Det. 32:4; Mas. 27:11) Na mokili mobimba, tokosala Ekaniseli ya liwa ya Klisto na mokolo ya lomingo, mwa 4 Aprili, nsima ya kolala ya moi.
12. Matomba nini bato oyo basepelaka na solo bakoki kozwa soki bayangani na molulu ya Bolei ya Mpokwa ya Nkolo?
12 Molulu ya Bolei ya Mpokwa ya Nkolo ekumisaka misala ya kokamwa ya Yehova. Lisukulu esalisaka biso tózala na botɔndi mingi mpo na nyonso oyo Yehova asalaki mpo na kopesa lisiko. Bato oyo basepelaka na solo, bakozwa likoki ya komona misala mosusu ya kokamwa ya Nzambe. Bakomona bomoko mpe bolingo makasi oyo Yehova ateyi basaleli na ye bázala na yango. (Ef. 4:16, 22-24; Yak. 3:17, 18) Makanisi ya moto oyo ayangani na molulu yango ya ntina mingi ekoki mpenza kobongwana, yango wana tolingi ete bato mingi bázala wana.—2 Kol. 5:14, 15.
13, 14. Nani tosengeli kobengisa na Ekaniseli mpe ndenge nini tosengeli kosala yango?
13 Tóbengisa basusu: Bandá komibongisa mbala moko, salá liste ya bato oyo okobengisa. Na liste yango, osengeli kokoma nkombo ya bandeko na yo oyo bazali Batatoli te, bato ya kartye, baninga ya mosala to ya kelasi, bato oyo ozalaki koyekola na bango Biblia ná baoyo oyekolaka na bango sikoyo, mpe bato nyonso oyo ozongelaka bango. Bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda basengeli kokoma mpe nkombo ya basakoli nyonso oyo batiká kosakola.
14 Salelá nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli, mpe komá na masini to komá malamu na mabɔkɔ ngonga mpe esika oyo Ekaniseli ekosalema. Soki olingi, okoki mpe kosalela libyangi oyo ezali na lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2004 to ya Lamuká! ya 22 Marsi 2004. Ntango tokokóma pene na mokolo ya 4 Aprili, kende kotala bato yango oyo obengisaki to bengá bango na telefone mpo na kokundwela bango libyangi yango.
15. Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya koyamba bapaya na mpokwa oyo Ekaniseli ekosalema?
15 Na Ekaniseli: Salá makasi okóma liboso ya ngonga oyo Ekaniseli esengeli kobanda. Pesá bato ya sika mbote na esengo mpenza mpo na komonisa ete ozali na ezaleli ya koyamba bapaya. (Lom. 12:13) Ozali na mokumba monene epai ya bato oyo obengisaki. Yambá bango na esengo mpenza mpe lakisá bango na bandeko mosusu ya lisangá. Okoki mbala mosusu kolukela bango esika ya kofanda pembeni na yo. Mpe soki moko na bango azali na Biblia to na mokanda ya nzembo te, salisá ye atala na oyo ya yo to na oyo ya ndeko mosusu. Nsima ya Ekaniseli, zalá wana mpo na koyanola na mituna oyo bakoki kotuna. Soki moto moko ayei mpo na mbala ya liboso, tuná ye soki akosepela koyeba makambo mosusu oyo etali Liloba ya Nzambe mpe mokano na Ye. Yebisá ye ete olingi bóbanda koyekola na ye Biblia.
16. Tokoki kosala nini mpo na kosalisa baoyo bayanganaki na Ekaniseli ete bákola na elimo?
16 Landá kosalisa baoyo bayanganaki: Na mikolo oyo ekolanda Ekaniseli, baoyo bayanganaki bakoki kozala na mposa ya lisalisi mosusu. Kati na bango, ezali na bato oyo kala bazalaki koyangana na makita nyonso, kasi sikoyo bayanganaka lisusu mingi te. Bankulutu bakoluka koyeba soki lisangá ebosani bato ya ndenge wana te, mpe bakoluka koyeba makambo oyo esalaki ete bátika kokola na elimo. Bósalisa bango báyeba ete mikolo etikali ya kotánga. (1 Pet. 4:7) Bósalisa bato nyonso wana báyeba ntina ya kotosa etinda ya Biblia oyo elobi ete tóyanganaka elongo na basaleli ya Nzambe.—Ebe. 10:24, 25.
17. Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola misala ya kokamwa ya Yehova?
17 Misala ya Yehova ezali mpenza ya kokamwa mpe ezali mpasi tókanga ntina na yango malamumalamu ata soki tozalaki na bomoi ya seko. (Yobo 42:2, 3; Mos. 3:11) Yango wana, tokozanga ata mokolo moko te makambo oyo ekotinda biso tókumisa ye. Tokomonisa botɔndi na biso mpo na misala ya kokamwa ya Yehova na eleko oyo ya Ekaniseli soki tosali milende mpo na kosakola mingi.
[Etanda na lokasa 5]
Manaka nini ya mosala ya mobongisi-nzela mosungi ebongi na yo?
Marsi Lomi- Mwa-*Mwa-* Mwa-*Mwa- Mwa- Mwa- Ngonga
ngo yam. mib. mis. min. mit. Pɔsɔ na sanza
Mikolo nyonso 2 1 1 1 1 1 5 51
Mikolo mibale 0 5 0 5 0 0 0 50
Wikende kaka 5 0 0 0 0 0 8 52
Wikende mpe mikolo
mosusu mibale 2 0 0 2 0 2 6 50
Aprili Lomi- Mwa-*Mwa-* Mwa-*Mwa- Mwa- Mwa- Ngonga
ngo yam. mib. mis. min. mit. Pɔsɔ na sanza
Mikolo nyonso 2 1 1 1 1 1 5 50
Mikolo mibale 0 0 0 0 5 5 0 50
Wikende kaka 5 0 0 0 0 0 8 52
Wikende mpe mikolo
mosusu mibale 2 0 0 2 0 2 6 50
Mai Lomi- Mwa-*Mwa-* Mwa-*Mwa- Mwa- Mwa- Ngonga
ngo yam. mib. mis. min. mit. Pɔsɔ na sanza
Mikolo nyonso 2 1 1 1 1 1 4 51
Mikolo mibale 0 5 0 0 0 0 5 50
Wikende kaka 3 0 0 0 0 0 7 50
Wikende mpe mikolo
mosusu mibale 2 0 0 2 0 2 5 51
* Mitano na sanza