Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/04 lok. 6
  • Bozongeli ya Liyangani ya mokolo moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Liyangani ya mokolo moko
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • Bozongeli ya Liyangani ya zongazonga
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Ebongiseli ya sika mpo na kosala bozongeli ya mayangani
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Bozongeli ya Liyangani ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 8/04 lok. 6

Bozongeli ya Liyangani ya mokolo moko

Lisolo oyo ekosalema liboso ya liyangani ya mokolo moko ya mobu ya mosala 2005 mpe mpo na bozongeli na yango. Lisolo, “Ebongiseli ya sika mpo na kosala bozongeli ya programɛ ya mayangani,” oyo ezali na lokasa 4 ya siplema oyo, ezali komonisa ndenge ya kosalela yango. Na bozongeli, esengeli kosalela ngonga malamu mpo na kotuna mituna nyonso. Bozongeli esengeli mpenzampenza komonisa ndenge oyo tokoki kosalela makambo oyo toyokaki na liyangani.

NA NTƆNGƆ

1. Mpo na nini tozali se kokóma na mposa makasi ya koyoka Yehova? Koyoka elimboli nini? (“Ntina oyo tosengeli koyokaka mongongo ya Yehova”)

2. Ndenge nini mabota bakoki kobatela programɛ malamu ya makambo ya elimo? (“Mabota oyo bayokaka Liloba ya Nzambe na likebi mpenza”)

3. Ndenge nini basakoli ya zongazonga basalelaki malamu mabaku ya kopesa litatoli ya libaku malamu? (“Tósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe”)

4. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya kokebisa oyo ezali na Baebele mokapo 3 mpe 4? Ndenge nini Yehova alobaka na biso lelo oyo? (“Koyoka ntango Nzambe azali koloba ebatelaka biso”)

5. Matomba nini ozwi na lisukulu ya batisimo? (“Komipesa mpe batisimo”)

NSIMA YA MIDI

6. Makambo nini tokoki kokanga ntina na yango na oyo etali bolenge ya Yesu mpe ndenge nini bilenge ya zongazonga bazali kolanda ndakisa na ye? (“Ndenge oyo koyoka Liloba ya Nzambe na likebi mpenza epesaka bilenge na biso makasi”)

7. Tángá mwa makambo oyo baboti bakoki kosala mpo na koteya babébé mpe bana mike banzela ya Yehova? (“Bana oyo bayokaka Nzambe mpe bayekolaka”)

8. Na makambo nini mpenzampenza tosengeli kotya likebi epai na Yehova, Mwana na ye, mpe “moombo ya sembo mpe ya mayele”? (Mat. 24:45) Mpo na nini yango ezali na ntina? (“Tyá likebi ntango nyonso na malako oyo euti na Nzambe”)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto