Bibongiseli oyo ezali kosalisa biso tóboya makila
Basakoli nyonso oyo bazwá batisimo mpe bazali na kalati Instructions médicales prévisionnelles to Document d’identité médical, ata soki kalati yango ezali na dati ya 3/99 na nse ya lokasa to te, ekozala na ntina te bátondisa kalati mosusu mbula oyo. Na Likita ya Mosala ya pɔsɔ oyo ekobanda na 27 Desɛmbɛ, mokomeli ya lisangá asengeli kozala na bakalati yango ebele mpo na kopesa basakoli oyo bazwi batisimo sika, bana na bango, mpe baoyo basepeli kotondisa kalati ya sika. Biro ekotindela masangá bakalati yango te. Soki lisangá ezali na bakalati yango mingi te, mokomeli ya lisangá akoki kosɛnga na masangá ya pembeni soki bazali na yango mingi to kosɛnga mosusu na biro ntango lisangá ekosɛnga mikanda mbala oyo ekolanda.
Basakoli yango basengeli kokende kotondisa bakalati yango na likebi nyonso na ndako, kasi bakotya sinyatire TE. Bakotya sinyatire na bango mpe bakokoma nkombo ya batemwe, mpe dati na kalati na nsuka ya boyekoli ya mokanda ya pɔsɔ ekolanda; mokɛngɛli ya boyekoli ya mokanda akosalisa bango soki mposa ezali.
Basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoki kokoma na papye na bango moko malako oyo ekokani na oyo ezali na kalati Instructions médicales prévisionnelles to Document d’identité médical mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango.