Ndenge nini kopesa litatoli epai ya bandeko na biso?
1. Mpo na nini tosengeli kozala na bososoli ntango tozali kopesa bandeko na biso litatoli?
1 Oyo nde esengo tokozala na yango soki tokɔti na mokili ya sika elongo na bandeko na biso wana biso nyonso tozali kosambela Yehova elongo! Tokozwa mpenza esengo yango soki tozali kopesa bango litatoli. Kasi, mpo na kosala yango na boboto, esengeli kozala na bososoli. Mokɛngɛli moko ya zongazonga alobaki boye: “Bandeko oyo basalisaka bandeko na bango ezali baoyo bapesaka bango litatoli mokemoke mpo na kolamwisa mposa na bango.” Ndenge nini tokoki kosala yango?
2. Ndenge nini kotyela bandeko na biso likebi na motema mobimba ekoki kosalisa biso tólamusa mposa na bango?
2 Lamusá mposa na bango: Kanisáká malamumalamu na makambo oyo olingi koyebisa bandeko na yo mpo na kolamwisa mposa na bango. (Mas. 15:28) Makambo nini etungisaka bango? Mikakatano nini bazali kokutana na yango? Mbala mosusu okoki kolobela lisolo moko to vɛrsɛ moko oyo elobelami na lisolo moko, oyo ekobenda likebi na bango. Soki bofandaka esika moko te, okoki kokomela bango makambo yango na mokanda to kosolola na bango na telefone. Na esika ya koluka kosopela bango makambo ebele ebele, loná mbóto ya solo, mpe zelá Yehova akolisa yango.—1 Kol. 3:6.
3. Ndenge nini makambo oyo bandeko na biso balukaka koyeba epai na biso ekoki kopesa biso nzela ya kopesa bango litatoli?
3 Yesu ayebisaki moto moko oyo ye abimisaki bademo boye: “Kende na ndako epai ya bato ya libota na yo, mpe yebisá bango makambo nyonso oyo Yehova asaleli yo mpe ndenge ayokeli yo mawa.” (Mko. 5:19) Kanisá naino ndenge bandeko na ye bayokaki mpo na likambo yango! Mbala mosusu yo okokutana na likambo ya monene bongo te; kasi, bandeko na yo mpe balukaka koyeba makambo oyo yo mpe bana na yo bosalaka. Kolobela lisolo moko oyo osalaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, liyangani moko oyo okendaki, ndenge okendaki kotala Betele, to likambo moko ya ntina mingi oyo okutanaki na yango, ekopesa yo nzela oyebisa bango makambo mosusu etali Yehova mpe ebongiseli na ye.
4. Mitambo nini tosengeli kokima ntango tozali kopesa bandeko na biso litatoli?
4 Zalá na bososoli: Ntango ozali kopesa bandeko na yo litatoli, koluka te koyebisa bango makambo ebebe ebele na mbala moko. Ndeko mobali moko azali kokanisa lisusu ntango oyo abandaki koyekola Biblia, alobi boye: “Nazalaki kosopela mama na ngai ebele ya makambo ya sika oyo nazalaki koyekola na Biblia na boumeli ya ngonga mingi, mbala mingi tozalaki kosuka na koswana, mingi mpenza na tata na ngai.” Ata soki ndeko na biso asepeli koyeba nsango ya Biblia, tópesa ye eyano na ndenge ekotika ye na mposa ya koluka koyeba makambo mosusu. (Mas. 25:7) Zalá ntango nyonso na limemya, na boboto, mpe na motema molai, kaka ndenge osalaka ntango ozali kosolola na bato oyo oyebi te na mosala ya kosakola.—Kols. 4:6.
5. Tokoki kosala nini soki bandeko na biso bazali koboya tópesa bango litatoli?
5 Mokolo moko, bandeko ya Yesu bakanisaki ete abɛli ligboma. (Mko. 3:21) Kasi na nsima, basusu kati na bango bakómaki bandimi. (Mis. 1:14) Soki na ebandeli, milende oyo ozali kosala mpo na koyebisa bandeko na yo solo ezali kosimba te, kolɛmba nzoto te. Makambo mpe bizaleli ya bato ekoki kobongwana. Kobá koluka mabaku ya koyebisa bango likanisi moko oyo ekolamusa mposa na bango. Okoki kozwa esengo ya kosalisa bango bábanda kotambola na nzela ya bomoi ya seko.—Mat. 7:13, 14.