Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
Eteni 9: Tósalisa bayekoli mpo bápesaka litatoli ya libaku malamu
1 Ntango Andele ná Filipo bayebaki ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki, bakakatanaki te mpo na koyebisa bato mosusu nsango wana ya esengo. (Yoa. 1:40-45) Ndenge moko mpe lelo oyo, soki bayekoli ya Biblia bakómi kondima makambo oyo bazali koyekola, bayokaka mposa makasi ya kolobela makambo yango. (2 Kol. 4:13) Ndenge nini tokoki kolendisa bango bápesaka litatoli ya libaku malamu mpe ndenge nini kosalisa bango básalaka yango malamumalamu?
2 Okoki kaka kotuna moyekoli soki ayebisaka bato mosusu makambo oyo azali koyekola na Biblia. Mbala mosusu, azali na baninga to bandeko oyo akoki kobenga bango ntango azali koyekola mpo bálanda boyekoli elongo na ye. Tuná ye soki moninga na ye moko ya mosala, ya kelasi to moto mosusu oyo bayebani na ye, asepelaki na makambo yango. Ndenge wana nde, akoki kobanda kopesa litatoli. Salisá ye ayeba ete ezali na ntina mingi azalaka na bososoli, na botosi mpe na boboto ntango azali koyebisa basusu makambo etali Yehova mpe mikano na ye.—Kols. 4:6; 2 Tim. 2:24, 25.
3 Koyebisa basusu makambo oyo andimaka: Ezali na ntina mingi kosalisa moyekoli ya Biblia ayeba kosalela Liloba ya Nzambe ntango azali koyebisa bato mosusu makambo oyo andimaka. Ntango bozali koyekola likambo moko, tuná moyekoli ya Biblia boye: “Ndenge nini okoki kosalela Biblia mpo na kolimbola likambo oyo epai ya bandeko na yo?” to “Vɛrsɛ nini ya Biblia okoki kosalela mpo na komonisa moninga na yo moko likambo oyo?” Tyá likebi na eyano oyo akopesa, mpe monisá ye oyo akoki kosala mpo eyano yango euta mpenzampenza na Makomami. (2 Tim. 2:15) Soki osali bongo, okosalisa moyekoli ayeba, ezala kopesa litatoli ya libaku malamu, to kosakola elongo na lisangá ntango akokokisa masɛngami.
4 Ezali malamu kosalisa moyekoli ayeba oyo akoki kosala soki batɛmɛli ye. (Mat. 10:36; Luka 8:13; 2 Tim. 3:12) Moyekoli akoki kozwa libaku ya kopesa bato mosusu litatoli ntango bazali kotuna mituna to koloba makambo etali Batatoli ya Yehova. Mwa buku Batatoli ya Yehova—Bazali banani? Makambo nini bandimaka? ekoki kosalisa ye ‘amibongisa mpo na koloba.’ (1 Pet. 3:15) Mwa buku yango elobeli makambo ya solo oyo bato ya sika bakoki kosalela mpo na kosalisa baninga mpe bandeko na bango bákanga ntina ya makambo oyo tondimaka mpe oyo tosalaka, makambo oyo euti na Biblia.