Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/05 lok. 1
  • Tókoba kosakola liloba ya Nzambe na mpiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókoba kosakola liloba ya Nzambe na mpiko
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Tómekola Yesu—Tósakolaka na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • ‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Osakolaka na mpiko?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Zwá biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga 2018-2019—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 10/05 lok. 1

Tókoba kosakola liloba ya Nzambe na mpiko

1 Biso baministre baklisto, toyebi ete moto nyonso te nde akondima koyoka biso. (Mat. 10:14) Yango wana, tozali kokoba koyebisa bato nsango malamu na mpiko atako bato mosusu bazali koboya koyoka biso. (Mas. 29:25) Nini esalisaka biso tókoba kosakola liloba ya Nzambe na mpiko?

2 Ntoma Paulo azalaki kosepela na “motuya monene ya boyebi ya Klisto Yesu.” Yango etindaki ye aloba na “kondimisama makasi.” (Filp. 3:8; 1 Tes. 1:⁠5) Atako bato mosusu bazalaki kotalela nsango oyo azalaki kosakola lokola eloko mpamba mpe bozoba, ntoma Paulo ayebaki ete yango ezalaki “nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo azali na kondima.” (Lom. 1:16) Yango wana, ata ntango batɛmɛlaki ye, akobaki ‘koloba na mpiko na bokonzi ya Yehova.’​—⁠Mis 14:​1-7; 20:​18-21, 24.

3 Moto oyo apesaka biso makasi: Soki Paulo apesaki litatoli na mpiko nyonso, ezalaki mpo na nguya na ye moko te. Ntango Paulo alobaki mpo na ye mpe mpo na Silasi, akomaki boye: “Nsima wana tosilaki liboso konyokwama mpe kosambwisama mabe na Filipi . . . , tozwaki mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe na kobunda mingi.” (1 Tes. 2:2; Mis. 16:​12, 37) Lisusu, ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ na Loma, asɛngaki basusu bábondela mpo na ye mpo akoba koyebisa bato nsango malamu na ‘mpiko ndenge asengeli koloba.’ (Ef. 6:​18-20) Lokola Paulo atyelaki Yehova motema na esika ya komityela motema, akobaki koyebisa bato liloba ya Nzambe na mpiko.​—⁠2 Kol. 4:7; Flp. 4:⁠13.

4 Yango mpe ezali komonana lelo oyo. Ndeko mobali moko oyo azalaki kokakatana mpo na koyebisa baninga na ye ya mosala ete azali Motatoli ya Yehova mpe azalaki kokoka te kopesa litatoli ya libaku malamu, abondelaki mpo na likambo yango mpe akómaki kopesa litatoli. Na ebandeli, moninga na ye moko ya mosala azalaki kondima koyoka ye te, kasi ntango ayebisaki ye elikya ya lisekwa, moninga yango andimaki koyekola Biblia. Kobanda wana, ndeko yango asalelaka mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli. Ntango akómaki kosala na esika mosusu, asalisaki bato 34 tii bazwaki batisimo, na boumeli ya mbula 14. Tokoki kotya elikya ete Yehova akopesa biso makasi ya ‘kokoba koloba liloba na ye na mpiko mpenza.’​—⁠Mis. 4:⁠29.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto