Monisá ete osepelaka na bato—Na kotaláká bango na miso
1 Ntango topesaka litatoli na bisika ya bato mingi to na ndako na ndako, mbala mingi tolukaka naino kotala bato na miso liboso ya kobanda koloba. Na ntango moke wana oyo totalaka bango na miso, tokoki koyeba, na elongi na bango, soki basepeli koyoka biso to te, mpe soki bazali na esengo, na mawa to na nkanda. Ndenge moko, bango mpe bakoki koyeba makambo mingi etali biso. Mwasi moko alobaki mpo na Motatoli moko oyo akendeki kotala ye boye: “Likambo oyo nabosanaka te ezali kimya oyo ezalaki komonana na elongi na ye ndenge azalaki kosɛka. Yango ebendaki mpenza likebi na ngai.” Yango epesaki mwasi yango nzela ya koyoka nsango malamu.
2 Kotala basusu na miso ezali ndenge ya malamu mpenza ya kobanda kopesa moto litatoli na balabala to na bisika mosusu oyo bato bazalaka mingi. Ndeko mobali moko alukaka kokutanisa miso na bato oyo bazali koya liboso na ye. Soki miso na ye ná ya moto moko ekutani, asɛkaka mpe na nsima alakisaka bazulunalo. Mayele wana esalisaka ye asolola malamu mpenza na bato mingi mpe akabola mikanda mingi.
3 Luká koyeba ndenge basusu bazali komiyoka: Soki tozali kotala bato na miso, tokoyeba ndenge oyo bazali komiyoka. Na ndakisa, soki moto azali kokanga mpenza ntina te ya makambo oyo tozali koloba to asepeli te na likambo moko oyo tolobi, mbala mingi yango emonanaka na elongi na ye. Soki azali na mosala mingi to akómi motema likolólikoló, tokomona yango na elongi na ye. Na ntango wana, tokobongola lisolo na biso to tokoyeisa yango mokuse, soki esengeli. Kotalela ndenge oyo basusu bazali komiyoka ezali lolenge ya malamu ya komonisa ete tosepelaka na bango.
4 Monisá ete ozali koloba solo mpe ozali kondima makambo yango: Na bamboka mingi, kotala moto na miso ntango ozali kosolola na ye emonisaka ete ozali koloba solo. Talá oyo Yesu asalaki ntango apesaki bayekoli na ye eyano ntango batunaki ye: “Nani mpenza akoki kobika?” Biblia elobi ete: “Kotaláká bango na elongi, Yesu alobaki na bango ete: ‘Epai ya bato yango ekoki kosalema te, kasi epai ya Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.’” (Mat. 19:25, 26) Kozanga ntembe, miso ya Yesu emonisaki mpenza ete andimi likambo yango mpe yango epesaki maloba na ye kilo. Ndenge moko mpe, soki tozali kotala bato na miso, tokoyebisa bango nsango malamu na ndenge oyo ekomonisa ete tozali koloba solo mpe kondima makambo yango.—2 Kol. 2:17; 1 Tes. 1:5.