Tótambwisa boyekoli ya Biblia oyo ekobota mbuma, na porte ya moto mpe na telefone
1. Mpo na ntina nini mpenza toyekolaka na bato Biblia?
1 Ezalaka esengo mpenza kobanda koyekola na moto Biblia! Kasi, kokutana na moto oyo asepeli koyekola Biblia ezali kaka ebandeli. Ntina mpenza oyo toyekolaka na bato ezali ya kosalisa bango bákóma bayekoli ya solosolo ya Klisto. (Mat. 28:19, 20) Nini ekoki kosalisa biso tókokisa mokano yango?
2. Ndenge nini tokoki koyekola na moto Biblia na porte na ye mpe na telefone, mpe mpo na nini yango ebimisaka matomba?
2 Bato oyo bazalaka na ntango te: Lelo oyo bato bazali kokóma kaka na makambo mingi ya kosala. Na bisika mosusu, na ebandeli bato mingi te bakoki kondima kolekisa ngonga mobimba na koyekola Biblia. Mpo na kosalisa bato ya ndenge wana, balendisaki biso tóbanda koyekola na bango Biblia mbala moko na porte na bango to na telefone. Na ebandeli, boyekoli ya ndenge wana esengeli kozala mokuse mpe tokotalela kaka mwa bavɛrsɛ na paragrafe moko to mibale ya buku lokola Biblia eteyaka. Ebongi mpenza kopesa basakoli mingi longonya ndenge bazali sikoyo koyekola na bato Biblia na porte na bango to na telefone!
3. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tóbakisa ntango oyo toyekolaka na moto na porte na ye?
3 Nzokande, tosengeli kosuka kaka na koyekolaka na moto na porte na ye? Te. Atako tosengeli kolekisa ntango mingi te ntango toyekoli na moto mbala ya liboso, Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 1990, na lokasa 8 elobi ete: “Soki moto yango andimi kokoba koyekola mpe mposa na ye ekómi makasi, tokoki koyeisa boyekoli mwa molai.” Yango ezali na ntina. Tózwa ndakisa: Mwana oyo akɔndá na nzala, bakoki kobanda koleisa ye mwa biloko mokemoke tii ntango akokóma mpenza na mposa ya kolya, kasi tokomizela te ete azongela makasi na ye nyonso mpe akola malamu soki tozali koleisa ye kaka mwa biloko moke basanza mingi. Ndenge moko mpe, moyekoli ya Biblia asengeli koyekola na bozindo mpe mbala na mbala mpo akóma mosaleli ya Nzambe oyo akɔmeli.—Ebe. 5:13, 14.
4. Matomba nini tokozwa soki toyekoli na moto na kati ya ndako to na esika mosusu oyo ebongi?
4 Koyekola na moto Biblia na ndako na ye: Ezali malamu koyekola na moto na esika oyo bato bazali mingi te—na ndako to na esika mosusu oyo ebongi. Yango ekosalisa moyekoli ayekola malamu mpe akanga ntina ya Liloba ya Nzambe. (Mat. 13:23) Lisusu, ekosalisa mosakoli ayokanisa mpenza makambo oyo bazali kotalela na bamposa ya moyekoli. Longola yango, koyekola ntango molai ekosalisa bango bátalela Liloba ya Nzambe na bozindo mpe na ndenge oyo ekokómisa kondima makasi.—Lom. 10:17.
5. Tokoki kosala nini mpo na kotika koyekola na moto na porte mpe kobanda koyekola na ye na ndako to na esika mosusu oyo ebongi?
5 Ndenge nini okoki kotika koyekola na moto na porte mpo na koyekola na ye na kati ya ndako to na esika mosusu oyo ebongi? Nsima ya koyekola na ye miniti ya kotánga mbala ebele, mpo na nini te kosɛnga ye bóbanda koyekola mwa ntango molai, mpe koyebisa ye miniti boni bokosala? To na mayele mpenza, okoki kotuna ye boye: “Ozali na ntango lelo mpo tófanda mpe tólobela likambo oyo?” to “Olingi tólekisa miniti boni lelo mpo na kolobela likambo oyo?” Soki asepeli te, kobá koyekola na ye miniti ya kotánga na porte na ye. Luká ntango ya malamu mpo na kosɛnga ye lisusu mpo bóyekolaka na kati ya ndako to na esika mosusu oyo ebongi.
6. Mokano nini tosengeli kozala na yango ntango tozali kokokisa mosala na biso, mpe ndenge nini makanisi oyo bapesi na lisolo oyo ekoki kosalisa biso tókokisa yango?
6 Ntango tozali kokoba koluka bato oyo babongi, tóbosanaka te mokano na biso ntango tozali kobanda mpe kokoba koyekola na bato Biblia. Mokano na biso ezali ya kosalisa bato ya mitema sembo bákóma basaleli ya Yehova oyo bamipesi mpe bazwi batisimo. Tiká ete Yehova apambola milende na biso ntango tozali kokokisa mosala na biso na mokano wana.—2 Tim. 4:5.