Zalá na mimeseno ya malamu mpo ozwa mapamboli mingi
1. Mpo na nini ebongi otalelaka mimeseno na yo ya makambo ya elimo?
1 Ntango okómaki moklisto, na ntembe te osalaki milende mpenza mpo okóma na mimeseno ya malamu na makambo ya elimo, na ndakisa koyekola Biblia, koyangana na makita, kosakola, mpe kobondela. Yango wana, Yehova apambolaki milende na yo, mpe okolaki na elimo. Mbala mosusu, eleki mwa bambula banda ozwá batisimo. Ozali kaka na mimeseno ya malamu na makambo ya elimo, ndenge ozalaki na yango ntango okómaki moklisto?
2. Matomba nini tozwaka soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo?
2 Talelá malamu mimeseno na yo na makambo ya elimo: Ozalaka na momeseno ya kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo? Kosala bongo, epesaka biso mapamboli mingi! (Yos. 1:8; Nz. 1:2, 3) Na Yisalaele ya kala, mokonzi mokomoko asengelaki kosala kopi ya Mibeko mpe kotánga yango “mikolo nyonso na bomoi na ye.” Yango elingaki kopesa ye matomba nini? Elingaki kosalisa ye akóma na motema ya komikitisa mpe ayekola kobanga Yehova mpe kotosa mibeko na ye. (Det. 17:18-20) Lelo oyo mpe, kotánga Biblia mokolo na mokolo esalisaka biso tózala na mbeba te mpe na ngambo te na mokili oyo etondi na mabe. Esalisaka biso mpe tózala na nyonso oyo esengeli mpo na kosakola.—Flp. 2:15; 2 Tim. 3:17.
3. Mapamboli nini tozwaka soki tozali koyangana na makita mbala na mbala?
3 Yesu azalaki na momeseno ya kokende na sinagoga, esika oyo bazalaki kosolola masolo ya Makomami. (Luka 4:16) Kozanga ntembe, yango esalisaki ye ayika mpiko na minyoko oyo akutanaki na yango nsima. Biso mpe tolendisamaka na mateya ya elimo oyo tozwaka na lisangá mpe na ndenge ‘tolendisanaka’ na bandeko mosusu. (Lom. 1:12) Koyangana na bandeko esalisaka biso tóyika mpiko na mikakatano ya mikolo oyo ya nsuka. (Ebe. 10:24, 25) Ozali kokoba koyangana na makita nyonso?
4. Matomba nini tozwaka soki tozali kosakola pɔsɔ nyonso?
4 Biblia elobi ete bantoma bazalaki kosakola nsango malamu “mikolo nyonso na kati ya tempelo mpe na ndako na ndako.” (Mis. 5:42) Ata soki tokokoka te kosakola mikolo nyonso, tokoki nde kozwa momeseno ya kosakolaka pɔsɔ nyonso, na lolenge moko to mosusu? Soki tosali bongo, tokoyeba kosalela Liloba ya Nzambe malamumalamu, mpe na ntembe te, tokokutana na makambo ya kolendisa ntango tozali koyebisa basusu solo ya Biblia.
5. Mpo na nini ezali na ntina tóbondelaka Yehova mbala na mbala?
5 Mosakoli Danyele asalelaki Yehova “mikolo nyonso” ya bomoi na ye, mpe azalaki kobondela ye mbala na mbala, yango wana Yehova apambolaki ye. (Dan. 6:10, 16, 20) Ndenge moko mpe, Yehova akopesa biso elimo santu na ye, soki tozali kosala mabondeli oyo euti mpenza na motema. (Luka 11:9-13) Lisusu, Yehova akosalisa biso tópusana penepene na ye, mpe tókóma baninga na ye ya motema. (Nz. 25:14; Yak. 4:8) Oyo nde lipamboli monene! Na bongo, tiká ete tósala milende mpenza mpo na kozala na mimeseno malamu na makambo ya elimo, mpo tózwa mapamboli mingi.