Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/07 lok. 4
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 6/07 lok. 4

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yuni

“Omoni te ete lelo oyo bato mingi baponaka bango moko nini ezali malamu mpe nini ezali mabe? [Tiká ye apesa eyano.] Talá na ndakisa toli moko oyo esilaka ngala te, oyo ezali na Biblia. [Tángá vɛrsɛ moko kati na oyo batye na etanda ya nkasa 6-7.] Zulunalo oyo emonisi matomba oyo tokozwa soki tolandi mitinda ya Biblia oyo etali bizaleli malamu.”

Lamuká! Yuni

“Biso nyonso tozalaka na mposa ya mbongo mpo na kobikela. Okanisi ete ekoki mpenza kosalema ete moto amipesa mingi na koluka mbongo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá makambo ekómelaka bato oyo bamipesi mingi na koluka bozwi, ndenge elobami awa. [Tángá 1 Timote 6:10.] Zulunalo oyo epesi mwa makanisi ebongi mpenza, na oyo etali kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ mpe kozala na bomoi ya malamu atako tozali na mbongo mingi te.”

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuli

“Osilá komituna mpo na nini banyokolaka bato mosusu mpo bazali bato ya loposo mosusu, ya mboka mosusu, to mpo balobaka monɔkɔ mosusu? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ntina oyo bapesi awa. [Tángá 1 Yoane 4:20.] Zulunalo oyo epesi eyano na motuna oyo: Bato ya bikólo nyonso bakoki koyokana?”

Lamuká! Yuli

“Na kokesana na nyama oyo etambwisamaka na mayele ya lɔɔmbi (instinct), moto akoki kopona mitinda oyo ekotambwisa bomoi na ye. Epai wapi okanisi ete tokoki kozwa mitinda oyo ebongi kotambwisa biso? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Nzembo 119:105.] Zulunalo oyo elimboli ntina oyo mitinda ya Biblia eleki nyonso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto