Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/08 lok. 1
  • Tólendisanaka ntango tobimi na mosala ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólendisanaka ntango tobimi na mosala ya kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Yebá kosalisa ndeko oyo obimi na ye na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Zalá mpenza moninga ya mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Monisáká molende na mosala ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • “Bókoba kolendisana mokolo na mokolo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 3/08 lok. 1

Tólendisanaka ntango tobimi na mosala ya kosakola

1 Biso nyonso tosepelaka soki balendisi biso na “liloba elobami na ntango malamu.” (Mas. 25:11) Tokoki kosala nini mpo masolo oyo tozali kosolola na ndeko oyo tobimi na ye na mosala ya kosakola ezala ya kolendisa?

2 Masolo ya kolendisa: Soki tozali kolobela makambo ya elimo ntango tozali kosolola na ndeko oyo tobimi na ye na mosala ya kosakola, tokolendisa ye mpenza. (Nz. 37:30) Tokoki koyebisa ye maloba ya kobanda lisolo oyo tobongisi to koyebisa ye likambo moko ya kolendisa oyo toutaki kokutana na yango na mosala ya kosakola. (Mis. 15:3) Ezali nde na likambo moko oyo esepelisaki biso na botángi na biso ya Biblia, na zulunalo moko oyo eutaki kobima, to na makita ya lisangá? Tokoki mpe kolobela makambo oyo toutaki koyoka na lisukulu moko ya bato nyonso oyo esalemaki na Ndako ya Bokonzi.

3 Ntango mosusu, tokoki kolɛmba nzoto mpo moto moko atuni biso motuna moko oyo toyebi eyano na yango te. Na ntango wana, ekozala malamu yo ná ndeko oyo bobimi na ye bózwa mwa miniti nsima ya kokabwana na moto yango, mpo na kolobela ndenge ya koyanola na motuna wana mbala ya nsima; bokoki mpe kosalela buku Comment raisonner. Soki mpe osepeli na maloba ya kobanda lisolo oyo ndeko yango asalelaki, okoki kopesa ye longonya ya solosolo mpe yango ekolendisa ye.

4 Luká kobima na basusu: Ezali nde na bandeko mosusu ya etuluku na biso ya boyekoli ya mokanda oyo tosakoli na bango mikolo oyo te? Soki tosɛngi bango bábima na biso na mosala ya kosakola, yango ekoki kosala ete ‘kolendisana ezala kati na biso.’ (Lom. 1:12) Babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela basungi basepelaka mingi kobima na bandeko mosusu, mingimingi na ntango oyo basakoli mingi babimaka mosala ya kosakola te, na ndakisa na ntɔngɔntɔngɔ to na mpokwa. Tokoki kopesa babongisi-nzela mabɔkɔ soki tozali kobima na bango na mosala ya kosakola. Ezali nde na ndeko moko oyo mikakatano ya nzoto ezali kopekisa ye abima mosala ya kosakola? Soki obongisi kobima na ye, mbala mosusu komema ye epai ya moto moko oyo oyekolaka na ye Biblia, bino mibale bokozanga te kozwa matomba.​—Mas. 27:17.

5 Soki topesaka bandeko longonya, ata na makambo ya mikemike, mpe tomonisaka ete tosepelaka na bango, tokozanga te kolendisa bango. Tosengeli kobosanaka likambo wana te ntango tozali kosakola elongo na basusu, mpamba te mposa na biso ezali ya ‘kokoba . . . kolendisana.’​—1 Tes. 5:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto