Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/08 lok. 4
  • Ozali kosalela yango malamumalamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali kosalela yango malamumalamu?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Masolo ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Epai ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo oyo ekosalisa biso mingi na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Mbongwana kitoko oyo esalemi na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 8/08 lok. 4

Ozali kosalela yango malamumalamu?

1 Nsima ya kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2008, ndeko mwasi moko akomelaki biso boye: “Nakoki kozela te mpo na kosalela yango na mosala ya kosakola!” Osili kotalela mwa masolo oyo ezali kobima mbala na mbala na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso, mpe oluki koyeba ndenge ya kosalela yango na mosala ya kosakola?

2 “Yesu ateyi biso”: Ntango mosusu, omoni ete lisolo yango ezali kosalisa mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Soki osalelá naino lisolo yango te, okoki komeka kotángela moto motó ya likambo yango mpe kobenda makanisi na ye na oyo Yesu alobaki na likambo yango, ndenge emonisami na paragrafe ya liboso. Soki moto yango asepeli, salá makasi osalela mitó ya makambo mike, oyo ezali mituna oyo ezali kotinda moto akanisa, mpo na kokoba kosolola na ye. Sɛngá ye ayanola na mituna yango. Limbolá na mokuse bililingi oyo ezali wana, oyo eyokani na likambo oyo bolobeli; na nsima bóleka na paragrafe mosusu. Na mbala ya liboso oyo bokutani, bokoki kotalela lisolo yango tii na katikati, mpe kotalela eteni oyo etikali ntango okozongela ye. Bongisá mpo na kokoba koyekola na ye Biblia na buku Biblia eteyaka.

3 “Sɛkɛlɛ mpo na libota ya esengo”: Lisolo yango oyo ebimaka nsima ya sanza misato, ebongisami mpo na kosalisa mibali, basi, mpe baboti báyeba ndenge ya kosalela batoli ya Biblia mpo na kolonga na kimya mikakatano oyo etungisaka mabota. Okoki mpe kosalela yango mpo na kosalisa bato oyo bazali Batatoli te bámona ete Biblia etondi na batoli ya bwanya.​—⁠2 Tim. 3:​16, 17.

4 Mpo na bilenge: Lisolo “Mpo na bilenge” ezali na mituna mpe na bisika oyo moto akoki kokoma eyano na ye. Moto akoki kosalela yango mpo na koyekola lisolo moko ya Biblia malamumalamu. Okoki kosalela lisolo yango mpo na kosalisa bilenge oyo ozali kokutana na bango na mosala ya kosakola bámona ete ezali bwanya koyekola Liloba ya Nzambe. (Nz. 119:​9, 105) Ntango ozali kosolola na moboti, okoki kosalela lisolo oyo elobi, “Teyá bana na yo,” oyo ebimaka basanza mosusu. Lisolo yango ekoki kosalisa bana mike báyekola mateya ya ntina mingi na masolo ya bato oyo Biblia elobeli. Osili komityela mokano ya kotángaka masolo yango elongo na bana yo?

5 Masolo mosusu: Sanza nyonso, lisolo “Mituna ya batángi,” eyanolaka na motuna moko oyo bato oyo bazali Batatoli te bakoki komituna. Okoki kosalela lisolo yango ntango ozali kolakisa bato bazulunalo na mosala ya ndako na ndako. Lisolo “Mokanda euti na  . . . ” ezali lisolo oyo moto abɛti, oyo ezali komonisa mikakatano oyo bamisionɛrɛ mpe basakoli mosusu bazali kolonga mpo na kosakola. Masolo yango ekoki kosalisa bato oyo bazali kosepela na nsango malamu báyeba ete nsango yango ezali kosakolama na mabelé mobimba, mpe ezali elembo ya kozala ya Klisto oyo esakolamaki.​—⁠Mat. 24:​3, 14.

6 Lisolo “Pusaná penepene na Nzambe,” oyo ebimaka sanza nyonso mpe elobelaka makambo oyo ebongisami na programɛ ya botángi ya Biblia ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, ekoki kotinda bato ya mitema sembo báluka koyeba Yehova malamu. Masolo “Mekolá kondima na bango,” oyo ebimaka mbala minei na mbula ebongisami mpo na kosalisa bato bámona masolo ya Biblia na makanisi na bango; ezali kolobela bato oyo Biblia elobeli, mikano na bango, mikakatano oyo bakutanaki na yango, mpe kondima na bango, lokola nde bazali na bomoi lelo oyo.

7 Tozali mpenza na esengo ya kozwaka sanza nyonso Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebongisami mpo na mosala ya kosakola! Tiká ete tósala nyonso oyo tokoki mpo na komesana na masolo na yango mpe tósalela yango na mosala ya kosakola.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto