Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Aug.
“Okanisi ete libota bakoki kozala na esengo soki batosi etinda oyo ya Yesu? [Tángá Yoane 13:34. Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo emonisi ndenge oyo mateya ya Yesu mpe ndakisa na ye etaleli moto mokomoko na libota.” Lakisá lisolo oyo ezali na nkasa 16 mpe 17.
Lamuká! Aug.
“Lelo oyo, molunge ekómi mingi na mokili, okanisi ete baguvɛrnema ya bato ekoki kosilisa likambo yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Yilimia 10:23.] Okosepela mingi na lisolo oyo. Ezali komonisa ndenge oyo Nzambe akosilisa mokakatono yango na mabelé oyo tofandi.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Sɛt.
“Bato mingi bameseni na maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:9. [Tángá.] Atako bongo, bato mingi bakokaka te komiyoka penepene ya Nzambe mpe kotalela ye lokola Tata na bango. Mpo na yo, ndenge nini tokoki kopusana penepene na Nzambe? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli bizaleli ndenge na ndenge ya Tata na biso ya likoló mpe ndenge oyo tokoki mpenza koyeba ye.”
Lamuká! Sɛt.
“Banda kalakala, bato mingi balukaka koyeba nini ekómelaka moto nsima ya liwa. Yo okanisaka nini na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká likambo oyo Yobo azalaki kondima. [Tángá Yobo 14:14, 15.] Lisolo oyo emonisi oyo Biblia elobi mpo na bomoi nsima ya liwa.”